Luka

Libongo ya Cutro Libongo ya Cutro 

Mibú misáto sima ya likambo lya mawa ya Cutro na Italie: likanisi ekóma mokúmbá

Likanisi ya bozindi ya maswá mókó etóndaka na ba migrant na butu ya 25 na ya 26 ya sánzá ya mibalé 2023, mosika te ya libóngo ya Calabre etikali nanu na milimo. Eklezia ya esika ená ekobenga mokili ya kozua lisusu bomoto na ye mpo ya kotikala kimia te libosó ya likámá ya bawéi na ebale.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Nsólo ya limba, maswá ekúfa, banzóto na ebale, molili, liwa. Na libóngo ya Steccato di Cutro, likanisi ya butu ya 25 kinó 26 ya sánzá ya mibalé 2023 ezali nanu makási mpe pási. Mpokwa ena, maswá mókó etónda na ba migrant ezindaki mosika te na libóngo ya Calabre, na bobomi bato 94, na káti bána 35. Mokolo eye ekotikala na molimo ya lisangá ya baí-Calabre mpe koleka, likoló ya likámá ezuaka bato babikaka mpe ya motángo mingi ya bawéi. Liswá "Summer Love", eútaka Turki, ememaka na moke bato 180 y'Afghanistan, Iran, Syrie mpe Pakistan, mpo ya boluki boboto, lobi mpe elikya, kasi baye bakútanaka na liwa sima ya kotuta libóké ya zelo pembeni ya libóngo. Motángo ya bato babunga eyébana kaka te.

Bobomi bokó ekokoba

"Na libóngo ya Steccato di Cutro, balobi mbisi bazalaka bato ya yambo ya kosálisa, kobikisa mpe komóna kokúfa na mabóko na bangó mibáli, bási mpe bána mpe bilenge ebelé", elobi mamelo Loredana Pisani, nzeneneke mpe mokambi ya buro ya Fondation Migrantes ya dioceze ya Crotone-Santa Severina. Sima bikómaki bangonga, batolosi, ba ambulance, mpe zelo elatáki badalá (draps) ya pembe, bitandami mókó mókó pembeni ya misusu. Ntángo ya mikolo misusu ebelé, lisangá ya baí-Calabre etelemaki mpo ya komema lisálisi mpe kolokota banzóto biye ebale ebimisaki, zambi ya bokundi bangó na ndéngé elongobami. Mamelo alobaki lokóla bileko ya mawa ntángo ya misa mókó eye dioceze elingaki kobánda mobú eye na eleko ya karesimo.

Babomoi bikátana

"Bisika ya kobikisa bato na lombango bitóndaka na bato, bazilamaka te mpo ya mokolo ya eyenga ya sánzá ya mibalé, kasi ezalaki na makelele te, mobúlú te, kaka kimia yókó ekási. Kaka na eténi yókó ya ndáko esika wápi bogangi makási bizalaki kowúta", ekobi mamelo Pisani. Ezalaki Leila, mwási mókó y'Afghanistan azalaki na zelo mpe limba na nzóto na ye, eye, ezokaki mpe na mwá pási na motó, azalaki kobenga bána na ye misáto. Mibalé káti na bangó bakúfaki butu ená mpe babomoi bisusu ebelé bikatanaki, baye bapesaki mbote ya súka o eleko ya molulu ya bokundi na Palamilone ya Crotone. "Mobú na mobú, ntángo mokolo ená ekómi, nalingami na kimia ená kaka eye nazalaka na yangó na lopitalo, na Palamilone, na libóngo", ekobi mamelo, amipesaka na molongó ya yambo: "Na nzelá ya mosála na ngai na dioceze lokóla mokambi ya Migrantes, nakobunda mpe tokobunda mokolo na mokolo mpo ya koloba lisusu lokúmu ya moto mókó mókó". Nzokándé, "likambo lya mawa ya Steccato di Cutro esilaka te na epomba (cercueil), etálisi ye. Ebale ekokoba kobimisa bibembe na mabóngo ya Calabre, Sicile, na mabóngo ya Méditerranée". "Bobomi ya Steccato di Cutro ekokoba butu mókó mókó, na mbóngé mókó mókó, na kimia mókó mókó eye elingi koloba kobwaka míso na baye bakopesa loboko mpo ya koluka lisálisi mpe elikya", elobi lisusu mamelo Pisani.

Mokúmbá ya moto mókó mókó

Bozindi ena esálemaka eleki mibú misáto ezali "mpótá mókó efúngwama" na molimo ya bato, elimboli Mgr Alberto Torriani, episkopo ya Crotone-Santa Severina: "Nakokanisa sángó-mokónzi ya Steccato di Cutro, na eleko ená, azalaki kozonga epái na ye kaka mpo ya kosúkola, yambo ya kozonga na mabóngo mpo ya kolokota banzóto, bibembe, biloko, babomoi". Ezali mpenza mpo ya kozonga na likambo lya mawa ena ndé mokáno ezuamaki ya kobánda nzelá ya karesimo na mabóngo ya Cutro, na boyambi dioceze insó mpo ya ngonga yókó ya losámbo mpo ya bokanisi. "Bokanisi bokó ebongwamaki na losámbo, kasi ekómaki lokóla mokúmbá mókó: mokúmbá ya kozua lisusu bomoto ená eye ya sóló ebunga", elobi Mgr Torriani. "Ekomonana lokóla makambo lya mawa bikotéya bisó moke", elimboli episkopo. Esika wápi ntina ya kozonga lisusu na mokúmbá ya moto mókó mókó "libosó ya likunya eye ekokota makási na boyokani, káti na bato. Mokúmbá mókó eye esengeli na sima kokóma loléngé ya bomoi ya mokolo na mokolo ya bakristu", mokúmbá mókó eye etáli lokóla "baye bakokamba bolámu ya bansó".

Babengami ya "kobwaka miso te"

Ezali likambo ya sika ekopela eye ekobenga bisó leló na likanisi, elobi Mgr Claudio Maniago, episkopo ya Catanzaro-Squillace mpe mokónzi-molandi ya lisangá ya baepiskopo ya Calabre, na botáli bibembe bisopanaki na mabóngo mikolo biná. "Na mwinda ya bobómboli (découverte), tobengami makási ya kobwaka míso te", mpo likámá liye ekokoba na mawa. "Yangó waná, lokóla baepiskopo ya Calabre, tozali na lotómo ya koyókisa mongongo na bisó na kimia eye, zambi ya kotálisa 'te ezali na bandeko ya mibáli mpe ya bási na bolukiluki bomoi bokó ya lokúmu". Engebene na episkopo, yangó esengeli kosimba motéma ya bandimi kasi lokóla likanisi lya bato, zambi ezala na "mbongwana yókó eye ekomema bisó ya kotála na bokébi koleka mpe na lisálisi" ya baye bazali "mbuma ya likambo lya mawa lyokó" na ebale ezanga ndelo. "Likambo lyokó ya mawa eye ezuaka eyano elongobami te kaka ya ekóló na bisó te, kasi lokóla ya bikóló nionso ya Poto eye efúndami mpe eye esengeli kopesa eyano yókó ya bomoto koleka". Ezali lokóla na ntina, esúkisi Mgr Maniago, ya kosálisa na ndéngé ekoki bokeli ya banzelá ya malámu mpo ya koyamba ya sóló baye bakokima mpe baye babungisi elikya.

Mobú eye, bokundoli ya bozindi ekútani na makita na esámbelo ya yókó ya makambo bitáli likambo lya mawa ya Cutro. Na ngámbo yókó, balekisi (passeurs) mitáno bafúndami mpo ya batúmolaki bozindi. Ngámbo esusu, likambo lyokó efúngwamaki mpo ya koyéba banani bazali na mokúmbá na bomemi lisálisi na sima makási mpo ya maswá ya ba migrant, eye ebwakaki SOS mókó eye bakambi baboyaki kolanda, mpe sima ya bozindi. Bosenga ya bosémbo ekozua lisálisi ya makási ya mabótá ya baye bazuaka makámá mpe ya baye babikaka, basangána o ntéi ya Réseau 26 ya sánzá ya mibalé, eye basangánaki na libóngo mokolo ya minéi 26 ya sánzá ya mibalé na ngonga ya minéi ya ntongo mpo ya eleko yókó ya ezúzunú mpe ya losámbo.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

03 sánzá ya mísáto 2026, 16:02