Luka

Bobimi ya bilama ya lisanga ya ba civil  sima ya bobeti ya drone na Goma Bobimi ya bilama ya lisanga ya ba civil sima ya bobeti ya drone na Goma   (ANSA)

Likámá ya bobateli na monyele ya Congo-Kinshasa ezali nzelá yókó ya bobimi nkámá kasi ezangi bobimi

Bokólisi ya bisika ya bosololi káti ya Kinshasa mpe lingómbá ya botomboki AFC/M23 esálisami na Rwanda ekolakisa "bolembi bokó ya diplomatie mpe eseke ya maye malekaki libosó ya kondimisa na makási misála ya bolandi ya kosála". Libosó ya likambo ená, lingómbá ya ba civil ya Congo-Kinshasa ekokoba kosálisa likanisi ya lisoló lyokó ya ekóló mpo ya bansó lokolá nzelá kaka yokó ya kokóma na "boboto ya sóló mpe ya libela na ekóló". Lisoló na Jacques Isongo, elama ya LUCHA.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Sánzá móķó sima likanisi ya bozimi-móto esálemaka n'Angola -na nzelá ya likanisi ya Luanda, endimama na lingómbá AFC/M23 mpe bulamatari ya Congo-Kinshasa- bopemi ezuami kaka te na Congo-Kinshasa. Ba bokoti mpe bobeti ya drone bikokoba bipái mibalé bizali na etumba. Mobulúngano ena káti ya "ba nsakola mpe bosóló ya etumba" ekolakisa «bozangi ya polélé ya bosóló ya politiki». Nionso ekomema ya kondima 'te «atáko bopemi endimami na lokasa, ekomonana epái ya babundi lokóla bopemi bokó ya pamba». Loléngé nini mpo ya etumba eye ezali sik’oyo na mobú ya mibalé mpe eye litambe yókó yókó ya bosilisi elandami na lombango na bikela ya bolongoli motéma?

Bokangemi bokó ya nzelá na makambo mabé mpo ya bato

Engebene na Jacques Isongo, elama ya LUCHA, etumba mpo ya mbongwana, lisangá lyokó ya lingómbá ya ba civil ya Congo-Kinshasa, «bozangi bondimi ekolonga bomipesi ya diplomatie, na bobongoli bopemi na mabakú ya bobongisi lisusu mampinga na esika ya litambe lyokó ya sóló mpo ya boboto». Na mabelé, eyébisi bisó Isongo, makambo mpo ya bato bikomi pási. Ezaleli ya bato bakima ekomi na esika yókó ya pási koleka, kaka na bingumba ya Nordi mpe Sudi-Kivu te, kasi lokolá na engumba ya Ituri epái wápi bituluku ya mindoki na bolobi bazali ya islam bakobangisa bato bazali na bobateli te. Bozui lisálisi ezali bongo bongo, na likámá ya bato ebengami na kombo ya monéne, ba nzelá nionso ya kokota bikangemi.

Liséngisi ya bolobi ya sóló ya mokili na babundi

Mosála ya montei esálemi na mokónzi y'Angola João Lourenço mpe eye ebotaki elikya ya boboto na monyele ya Congo-Kinshasa, ezali ya kolala. Soki ekosálisa ya kozala nzelá yókó ya lisoló káti ya Kinshasa, lisangá ya botomboki mpe Kigali, ekokutana na mawa na bosenga ya Congo-Kinshasa ya «bobimi libosó libosó ya mampinga ya Ruanda», elobi na bisó Jacques Isongo.

Botuti pete ya politiki ya boyokani ya Washington

Mpo ya boyokani ya Washington, soki ezuaka lokúmu ya kofúngola maninisa mpo ya bato ya ngonga moke na bosálisi bozui bokó ezali na “ndelo” na bato bakangemi, botuti na yangó na politiki ezali makási te, elobi na bisó Isongo. Ezali kaka bongo mpo ya bitumbu bipesamaki na bakambi minéi ya minéne ya limpinga ya Ruanda mpo ya lisálisi na bangó na M23 eye, «na bokati boboyi na mokili ya bozali mbala mókó ya Ruanda, bizali kokoka te», ntángo “bikosimba ba nzelá ya nkita te biye bikopesa mosolo na etumba”. Epái esusu, esengeli kokanisa likámá 'te ekela ená ya diplomatie elendisa bozangi bondimi mpe bozangi botiyi motéma káti ya Kinshasa mpe Kigali, na lokolá likambo 'te yango elendisa bobundi na mabelé.

Likambo ya elilingi ya boyokani bisálisami epái ya bikóló

Libosó ya mokakatano ená, elikya ya lisangá ya ba civil ya Congo-Kinshasa ezali komona kosálema “lisoló ya ekóló mpo ya bansó” elukami mingi na ba Eklezia katoliko mpe ngelesa. Ezali kaka «na bosangisi babundi bansó, bato ya ntina mpe masangá ya basáli ya ekóló ndé tokoki kokóma na boboto ya sóló mpe ya libela», elobi Jacques Isongo, na bolakisi 'te «atáko sima bozui mikáno libosó ya bikóló, likambo lyokó ya mabé ekotikala kaka soki lisoló ená o ntéi ya ekoló esálemi te». Na waná, Isongo abengi bána ya ekóló nionso ya kosálisa etamboli ya lisangá ya ba civil, na bolobi mpo ya lisoló lyokó «mpo ya bansó ya sóló, eyébi kotála makambo ya mozindo ya makámá maye ekokóma na ekóló». Atelemeli «bisalela bikoluka kokanga bofúngoli nionso ya politiki».

Bobángi, elobi ye, ezali 'te Kinshasa esálela likámá ya bobateli mpo ya kokanga libandá ya politiki mpe kotála kaka makambo ya káti, «ndakisa liwélani ekoleka mikolo miye na ekóló etáli bobongoli ya mobéko-likonzi».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

18 sánzá ya mísáto 2026, 16:44