Luka

Moi- Libá akosambela o eleko ya misa ya Papa na Beyrouth na sanza ya zomi na mibale 2025 Moi- Libá akosambela o eleko ya misa ya Papa na Beyrouth na sanza ya zomi na mibale 2025  (AFP or Licensors)

Libá: ministre ya makambo ya bapaya asengi lisálisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo

Na nsakola yókó ebimaki na X, Youssef Raggi asakolaki bosengi na Ngwendé ya Sántu-Petelo "ya koyingela mpe kosálela montei mpo ya kobátela bozali ya bokristu" na bituka ya sudi, na ndelo na Israël, sik’oyo na nsé ya motó ya mobúlú. Alakisi azuaki liloba 'te bokangi ya diplomatie ezali kosálema mpo ya kosilisa bomátisi ya motó mpe kopekisa bobimi ya bato.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Libá ebengi Ngwendé ya Sántu-Petelo mpo ya kozua lisálisi na ye mpe bobáteli na ye mpo ya kobátela bozali ya bakristu na sudi ya ekóló, na ndelo na Israël, bizuami na mobúlú ya mikolo miye na Moyen-Orient, na bobwaki ba bombe ntángo insó mpe mitindo ya bobimi biye biluki matata ebelé na bato.

Youssef Raggi, ministre ya Makambo ya bapaya ya Libá ayébisaki na nzela ya réseau social X, 'te azuaki na nzela ya singa lisoló na episkopo Paul Richard Gallagher, secrétaire ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpo ya Boyokani na Bikóló mpe masangá ya mokili. Lisoló o ntéi ya bato babalé esosolamaki na mokambi ya Ndáko ya makita ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Matteo Bruni.

Bokangi ya diplomatie

Mgr Gallagher mpe Youssef Raggi, engebene na oyo ya sima, "balobanaki makanisi na bangó na boleki ya makambo na Libá mpe ezaleli ya pási ya bituka na ndelo ya sudi". Asakoli "asengaki na Ngwendé ya Sántu-Petelo ya koyingela mpe kosálela montei zambi ya kosálisa ya kobátela bozali ya bakristu na bituka bina, bato ya bituka biye basálisaka Letá ya Liban mpe mampinga na ye ya sóló, batikalaka koboya bomipesi na bangó te".

Mgr Gallagher, engebene na ba nsango bipesamaki na bato ya politiki ya Libá, "alobaki 'te Ngwendé ya Sántu-Petelo azui makoki mansó ya diplomatie mpo ya kosilisa bomátisi ya etumba na Libá mpe kopekisa botiki ya bato ya mabelé na bangó". Apesaki elaka 'te "Libá ezalaka kaka, mpe ekokoba kozala, na nsámbo ya Mosántu Papá».

Maloba ya Papá na Beyrouth

Libá ezalaki, na Turquie, mobémbo eponamaki na Léon XIV mpo ya mobémbo na ye ya yambo na sánzá ya zómi na mibalé elekaki. Na mobémbo waná, o ntéi ya makambo-makonzi bilobamaki na ba nsakola libosó ya bato, Papá wa Roma alobaka likambo ya bomáti ya bakristu na Libá, eye esika wapi lisangá linéne ya bakristu ezali na Moyen-Orient. Lisangá eye ezali mingi mpenza na ba maronite, kasi lokóla na ba grec orthodoxe, ba melkite mpe b'arménien. Papá alimbolaka botikali ya bakristu lokóla etindá yókó ekoluka kotónga "civilisation yókó ya bolingo mpe ya boboto". Mokambi Joseph Aoun ye-méi, na boyambi Papá na Beyrouth, alobaka 'te "soki bakristu ya Libá babungi, bokokani ya pété ekoki kokweya mpe, na yangó, na bosémbo".

Pási mpo ya Moyen-Orient

Mokolo ya yambo. Sántu-Papá abimisaki mawa na ye -ekabolamaki na ndáko ya makita ya bapanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu-Petelo- mpo eye ekoleka na bingumba ya Moyen-Orient, mpe mpenza mpo "bato bayébi makambo te" ebelé, mingimingi bána, bazui makámá na ba bombe. Káti na bangó, sángó maronite Pierre El Raii, babomaki ye lobi na Qlaya o eleko amekaki kosálisa yókó ya bandimi ya paloise na ye bazokaki ntángo ya mobúlú móķó eye ezuaki ndáko yókó na nzinganzinga ya paloise na ye, na ba ngomba.

Episkopo ya lokúmu secrétaire ya Letá, Pietro Parolin, alobaki na mpokwa na eténi ya likambo, na bolobi 'te "atá Eklezia" ekozanga mawa te na "pási ya bato". Alobaki lokóla ntina ya bisalelo ya diplomatie, "bisalelo ya liloba, ya elonga, ya bwanya", kasi biye biyambamaka malámu kaka te. "Tozali na bisalelo ya makási te mpo kotia na makási ndéngé tozali komona makambo", elobaki ye, na bolaki 'te Ngwendé ya Sántu-Petelo ekokoba "kobeta nsete na mikáno ya ntina maye masengeli kokamba bovandi lisangá ya ba civil mpe ya boboto káti na bato" mpe ekokoba "kosolola na bansó". Mpo ya likámá ya kozala na bakristu te na Mabelé Esántu mpe na Moyen-Orient, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki 'te likámá ená Ngwendé ya Sántu-Petelo etelemelaka kaka yangó: "Ezali ya sóló 'te etumba, bobébisi, bobéndani, likunya eye ekokola, bikosálisa te bozali ya bakristu, ezali bôngó likambo esusu ya kobangela".

Penepene mpe losámbo

Na kombo ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, episkopo ya lokúmu Michael Czerny, préfet ya dicastère mpo ya Mosála ya botomboli moto mobimba, alobaki lokolá penepene na ye na baí-Libá mikolo mileki. Eleki mobú mókó, na sánzá ya mibalé 2025, akendeki na Libá, o eleko ekóló ebimaki na etumba káti ya Israël mpe Hezbollah, na bosenga ya Papá François.

Episkopo ya lokúmu akendeki na sudi ya ekóló, na botáli etuka ya Alma al-Shaab mpe amonaka na miso na ye mókó bobébisi esálemaki na bokwéisi ba bombe biye bibikisaka ba ndáko na ba ndáko-Nzámbe te. Episkopo ya lokúmu Czerny alobelaka penepene na ye na bato ya etuka Alma al-Shaab, kasi lokolá ya baye ya Rmeish, Ein Ebel, Debel mpe bituka bisusu pembeni, na bolaki bangó na nsámbo na ye ntángo insó na eleko eye ya pási.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

14 sánzá ya mísáto 2026, 14:43