Luka

Eténi ya ndako ya mosala mwa bilanga ya Paris Eténi ya ndako ya mosala mwa bilanga ya Paris   (AFP or licensors)

Baepiskopo ya Fránsa balobi lisálisi na bangó mpe matondo na balóni

O eleko ya bofúngoli mokolo ya póso na Paris ya Ndáko ya bikóló ya mosála mwá bilanga, baepiskopo ya Fránsa bakomeli balóni. Bayébisi bangó lisusu 'te biléi esengeli te kokóma eloko yókó pámba pámba mpe 'te ndáko ya bisó bansó ezali eloko esusu koleka zándo ya pámba esika wápi tokoki kobimisa ndelo te. Na súka, o eleko ya likámá eye mosála mwa bilanga ekoleka na Fránsa, lisangá ya baepiskopo ebeti nsete na liséngisi ya kozongisa lisoló na lingómbá mobimba.

Vatican News

Ezali bokútáni yókó eye eleki mosika ba ndelo ya ezibeli ya Versailles na Paris, esika wápi esálemaka mobú na mobú Eténi ya ndáko ya bikóló ya mosála mwa bilanga, mpe biye ya Fránsa. Eténi ya ndáko eye efúngolaki bizibeli na yangó mokolo ya póso 21 ya sánzá ya mibalé ekoyamba ba nkáma ya batáli kinó mokolo ya yambo ya sánzá ya misáto, bayéi mpo ya komona mokili mókó na likámá, mingi mpenza na Fránsa, mpe mingimingi eyébani mpo ya bato úta leló bato ya baí-engúmba na bikóló ya Westi. Baepiskopo ya Fránsa balingaki bongo koloba mbala mókó na balóni.

Mgr Jachiet, mokambi ya eténi "Lisoló mpe bolámu ya bansó", Mgr Didier Noblot, episkopo ya ekípi ya ekóló "Etindá ya zámba" mpe sángó Arnaud Favart, motindami na ye na ekóló, bakomi mokánda mókó na baye baléisaka mokili mokolo na mokolo. Sóki balobi makambo bitáli kaka balóni ya Fránsa mpe nionso etáli likambo ya nkita ya Fránsa, balobi makambo biye bitáli mokili ya mosála mwá bilanga mobimba na yangó.

Mosála ya pámba pámba te na biléi

Libosó libosó "bonsómi na biléi" eye "ekoki kotindáma te na makámá ya minéne". Mpo ya batindami ya Lisangá ya baepiskopo ya Fránsa, "kolia ezali boponi mókó te mpe biléi esengeli te kokóma eloko yókó ya mosála ya pámba pámba te". Batelemeli bongo "biléi ya ntálo te" eye ekobomba "botuti bokó ya lingómbá mpe likambo ya nzinganzinga".

Balobi lisusu 'te mpo ya bakristu, "elikya 'te tolingi komema mpo ya mokili ezali na lomeko ya molimo". Ndáko ya bisó bansó "ezali eloko mosusu koleka zándo ya pámba esika wápi tokoki kobimisa ndelo te". « Tolingi kosangisa "bogangi ya mabelé mpe bogangi ya babola" » lokóla ekomaka Papá François na lokasa na ye Laudato si', "na botéi, bosálisani, bisaleli ya masangá, bokaboli ya bolekisi elamu áwa mpe kúna".

Mokili mókó mwá bilanga ya Fránsa na likámá

Mokánda eye ekokaki te kobomba makambo maye balóni ya Fránsa bazali komona. Bilama ya Eklezia ya Fránsa bayóki mawa na mikakatano ya ndéngé na ndéngé biye basengeli kokutana mpe mitindo bikeseni biye bakozua, lokóla "bosenga ya baléi, niongo na ba ndáko ya mosolo, makambo ya bolukiluki na mosála mwá bilanga mpo ya kopesa biyano ya sika bikotosa nzinganzinga mpe bokólóngónó, boyokani tángo mosusu mabé na misála ya mbóto mpe ya biléi, na zándo ekóma ya mokili mobimba". Mpo ya kobima na mikakatano bina, nzelá yókó elobami, eye ya "bomemi ya mosála mwá bilanga na engúmba yókó" eye "ekopesa liyóki mpe botiyi motéma na politiki yókó ya ekóló" mpe ekosangisa babimisi, bakaboli mpe baléi.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

01 sánzá ya mísáto 2026, 14:09