Etando ya Palabek, na Uganda Etando ya Palabek, na Uganda 

Uganda, ba salésien pembeni ya bato babombami na Palabek

Ekóló eye y'Afrika, epái wápi mokambi Yoweri Museveni azali o bokonzi úto mibú 40 mpe aúti kozua lotómo ya sika, ekokesene lokóla na bondimi babombami milio mibalé. Litatoli ya sángó Hubert Twagirayezu, coadjuteur salésien na esika enéne eye ekoyamba penepene na bato 100 000 bakokima Sudan ya Sudi.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Na engumba ya Bitimá Binene (Grands Lacs), ezui elembo ya bitumba mpe bozangi bokengi, Uganda ekolakisama lokóla ndakisa yoko ya boyambi. Po ya kopesa lobi lyoko na bato babombami, mosika na makambo ya lombango. Batindami ya ba salésien, baye bazali na ekóló eye na masangá mitáno, bayébi malámu Uganda. Na káti po ya bána ya Namugongo, nzinganzinga ya mboka-mokónzi Kampala, na mabongo ya etimá Victoria, esika wápi bakosála po ya bozongisi bána baye bazali na ba balabala mpe loléngé ya bato basusu ya pási; na etéyelo ya tekiniki mpe esika ya bolobi po ya bilenge ya Kamuli, pembeni na ndelo ya monyele na Kenya; kinó evandelo (établissement) ya ba salésien ya Bombo, etongama nzinganzinga na ndáko-Nzámbe ebonzama na Maria Mokónzi ya ba martyro ya Uganda; mpe na bisika bakokamba n'Atebe, na nordi.  Kaka na nordi ya Uganda, lisangá ya ba salésien ezali na etando enéne ya babombami na Palabek, pembeni ya ndelo ya Sudan ya Sudi.

Komesenisa babombami mpe kopesa bangó lobi lyoko

"Leló, ezali áwa bato babombami 95 671; koleka 80% bazali bási mpe bána", elimboli na ba média ya Vatican sángó Hubert Twagirayezu, coadjuteur salésien na etando ya Palabek. Babombami mingi bazali baí-Sudan ya Sudi baye bakokatisa ndelo likoló ya mindondo na ekóló na bangó, nzokándé ezali na Baí-Sudan 250 mpe kaka bato 50 bato bakimi etumba eye ezali makási na monyele ya Congo. Boyei ya babombami bakoúta Sudan ya Sudi ezali ya bomati lisusu: "Tángo nakomaki áwa eleki mobú moko, elobi sángó Hubert, ezalaki na babombami 75 000, nzokándé leló baleki 95 000 mpe motángo na bangó ekomáta póso na póso".

Makambo ebelé ya Uganda

Uganda ezali ekóló eye ekoyamba babombami koleka n'Afrika mpe ya misáto na mokili, pembeni ya babombami milio 2, mingi mpenza ya Sudan ya Sudi mpe na Congo-Kinshasa, na monyele. Kasi Uganda azali na "bilongi mibalé": epái yoko, boyambi mpe epái esusu, "lobokó ya ebendé" ya mokónzi Yoweri Museveni. Mokónzi ya Ekóló ya mibú 81, oyo aúti koponama na lotómo ya mbala ya sambo sima ya liponami ya 13 ya sánzá ya yambo mpe akokata seléka mikolo miye lokóla asalaka yangó mbala ya yambo ezali leló mibú 40, na 29 ya sánzá ya yambo 1986, alimbolaki makambo ya ntina po ya mibú sambo bikoya: bokeli bomengo, bolongoli bobola mpe bobongisi misála po ya bato.

Ba nsakola bina bisálemi na ekóló yoko eye ekomeka kotelema sima ya mikolo ebelé ya bobeti bato babimaki na balabala mpe na bokangi ya internet: mokambi ya limpinga ya Uganda, mwána ya Museveni, Muhoozi Kainerugaba, asakolaki bokangemi ya bato 2 000 ya lilanga (opposition) mpe na bobomi bato 30 babéngami ba "bato ya yaúli (voyous)" to "babangisi bato (terroristes)". Na eleko yoko ya pási lokóla eye ya engumba ya Bitima Binene, Uganda azali na nkita yoko ya komata mpe, atá bokeseni mpe bobola bikokoba, ekosála makási ya ntina na eye etáli boyambi na bolaki bonsómi ya botámboli mpe ya mosála, boyingeli o etéyelo mpe ya bokolongono, mpe na bingumba bebo, epesi biténi ya mabelé po ya kosunga babombami.

Kosálisa basusu

"Tozali lisangá kaka yoko ya eyamba na etando enéne ya babombami na Palabek", elimboli coadjuteur ya ba salésien. Ezali na ba sángó misáto, basálisami na "bafulele" mibalé. "Tokoki kolaka misa mikolo minso ya eyenga te na ba ndáko-Nzámbe po ba sángó bazali moke", elobi sángó Hubert oyo, abotama na 1982 na Rwanda, azua bondimi ya koko na ye ya katekisi. "Babóti na ngai bakufa tángo nazalaki na mibú 7, libosó ya etumba na Rwanda: bakoko na ngai ya mobáli mpe ya mwási babokoli ngai, na bandeko na ngai ya mibáli mibalé mpe na ndeko na ngai ya mwási. Pokwa nionso, tozalaki kosála losámbo lyoko".

Sángó Hubert azali úto mibú ebelé na Uganda mpe amoni abengami ya kosálisa baye bazangi: "Lokolá nazalaka etike mpe nazuaka lisálisi mingi na bomoi na ngai, nasengeli ngai lokóla nasálisa basusu".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

03 sánzá ya míbalé 2026, 18:14