Baye bakimi etumba na Pekon, na 9 sanza ya zomi na mibalé 2024 Baye bakimi etumba na Pekon, na 9 sanza ya zomi na mibalé 2024  (AFP or licensors)

Episkopo ya lokúmu Bo: "Birmanie ebosanama na mokili, kasi na Nzámbe te"

Episkopo ya lokúmu Charles Maung Bo, episkopo ya Rangoun, atelemeli "mokakatano ebelé" eye ezali likoló ya Birmanie etungisami na etumba ya ba civil mpe ba pási ya nkita mpe ya bato. Likambo yangó elukaki koleka bato milio 3 na ndambo babombama mpe bokimi ya bilenge na libanda ya ekóló.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Mibú mitáno sima ya coup d'État ya limpinga, Birmanie ekoleka mokakatano mókó ya ndéngé ebelé: nkita, bato, bokolongono mpe botéi. Ntálo emati, misála bikiti, koleka bato milio 3,5 batiki bisika na bangó mpe libótá (génération) mobimba ebungisi mibú mitáno ya boyékoli. Bilenge mingi, lobi eyebani te, babimi na ekóló. Na ba média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, episkopo ya lokúmu alimboli ekóló yoko ezui elembo ya bobángi, bolembí mpe bozangi makási ya koyéba nini ekosálema lobi. Nzokándé, alobi elikya "ekufi te, kasi ebakami o kuruze"

Bozito ya mokakatano na bilenge

Mayoki ya bato bikobongwana na botáli ba nzebi ya mókó mókó mpe na biténi ya ekóló, kasi bozangi bobateli mpe bokámoli ya molimo bizali makási epái ya bilenge. Bakobika na bobángi ntángo insó po ya bokengi na bangó, káti ya mobúlú esika nionso, nkita ya keba keba mpe likámá ya bokwami likili na makási. Boúmeli ya bobéndani ena ekolisi sómo, stress mpe bozangi botiyi motéma na lobi, elimboli episkopo ya lokúmu Bo. Mibú ya mobúlú bibomi nionso ya malámu mpe botáli ya lobí: bitéyelo bikangema to bikokende malámu te, bozangi mosála, bomoi ya bato ebéba. Ba sondage bikokoma bomátisi yoko ya makási ya nkanda mpe nzóto mabé ya bobángi na botáli eleko yambo ya coup d'État. "Bilenge moke koleka bakoyoka lisusu liyoki lyoko ya malonga; mingi bakokana kobima to basáli yangó kála", etatoli episkopo ya mboka-mokónzi ya Birmanie.

Bopiki mpéndé káti na bitika

Episkopo ya lokúmu abengi ya kokitisa bilenge kaka na mosála ya baye bazui likámá te. Atá o ntéi ya pasi, okoki kozua bilembo ya bopiki mpéndé mpe ya boyiki mpiko. Basusu bakokoba kondima na lobí lyokó elámu mpe bamipesi na boyékoli mpe makoki ya internet, na bosáli makási ya kosála mabakú na eleko yoko ya pási koleka.

Elikya yoko "ebakami o kuruze"

Na eleko eye, episkopo Bo alobi "elikya yoko ya bokristu eye ebotami na Kuruze mpe na Nsékwa", ekelama na motángo ya politiki te kasi na boyambi. "Birmanie, elobi ye lisusu, ebungisi bobateli na ye, kimia na ye mpe bokébi ya bikóló ya mokili, kasi na bozali ya Nzámbe te". Eye ekomonana na ba mboka babébisi, na bitando ya baye batiki bisika na bangó, mbamba ya kimia na mabótá, ya ba katekisi mpe basáli na Nzámbe. "Mabótá bikokabola ndambo eye bazali na yangó mpe bakosambela lisangá"; bilenge ebelé bazali kosála mosála ezanga mbano mpe bamipesi na masangá. Bizali waná bilembo ya moke kasi ya sóló ya Nsango-Ndamu. Na bobwaki boyini mpe mobulú mpe na botomboli boyokani mpe lokúmu ya moto, Eklezia elingi kozala "sakraménto yoko ya elikya", na boyébi malámu 'te mobulú ekozua liloba ya súka te.

Babosanama, kasi batikama te

Bato ebelé bakoyoka babosanama na lisangá ya bikóló, eye bokébi ezali epái na bangó kaka na bileko ya mabé. Bitumbu mpe botikali pembeni bikolisi epái ya basusu liyoki ya bobwakami. Nzokándé, komiyoka obwakami na mokili elingi koloba osundolami epái ya Nzámbe te: "Birmanie ebwakami na mwángo ya Nzámbe te".

Bomipesi ya Eklezia mpe bokébi ya Papá

Eklezia ya ekóló ekokoba kosenga súka ya mobulú mpe boyokani esalema na bosémbo, bolimbisi mpe mawa. Makanisi káti ya biyamba bisangisi bakristu, bandimi ya Bouddha, ba musulman mpe ba hindou na nsámbo ya lisangá mpo ya boboto, na bopesi ba ndakisa ya sóló ya bovandi lisangá. Ba mwángo na mabelé bikosalisa bato bakima mpe bazanga. Na súka, episkopo ya lokúmu Bo alobi lisusu 'te Ngwendé ya Sántu-Petelo ekolanda likambo na bobángi, na bobeleli boboto, bosololani mpe bobateli ya ba civil. Atako biyano ya politiki bizali malémbe mpe biténi na biténi na Roma, losámbo ezangi te. "Bobwaki elikya, esukisi ye, ekolinga koloba kopesa lobí na mobúlú mpe bozangi elikya. Birmanie ekokoba kolikya, mpo likambo ezali pété te, kasi mpo ekoyoka bolingo ya Nzámbe".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

15 sánzá ya míbalé 2026, 14:08