Bato bakokima mobulu na monyele ya Congo-Kinshasa Bato bakokima mobulu na monyele ya Congo-Kinshasa 

Bobomi ya sika esopi makila na Kivu ya Nordi

Motángo ya mobúlú esálemaki na mokolo ya póso na Gelumbé esáli káti ya 25 mpe 35 ya bawéi. "Ezali likambo lyoko ya nsómo ebongisamaki eye ekokoba na bonkutu ya Westi (Occident)", elobaki na ba média ya Vatican sángó Giovanni Piumatti, motindami ya Fidei Donum na dioceze ya Butembo-Beni na Congo-Kinshasa.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Bobomi moko ya sika esopi makila na monyele ya ekóló Congo-Kinshasa. Káti na ba civil 25 mpe 35 babomaki bangó na makási mokolo ya póso 7 ya sánzá ya mibalé o eleko ya mobúlú moko ekabami na batomboki ya ADF, bakota na monyele ya Congo-Kinshasa úto mibú ebelé mpe bandima kotosa lisangá ya Letá ya islam na 2009.

Mindondo na ndelo ya Kivu ya Nordi mpe Ituri

Bobomi esálemaki pembeni ya etuka ya Gelumbé, mosika te na Beni-Oicha, na eténi ya monyele ya engumba ya Kivu ya Nordi, penepene na ndelo na Ituri. Ezali kaka etuluku eye, na sánzá ya zómi na yoko eleki, ebomaki bato na Byambwe, na dioceze ya Butembo-Beni, mpe eye, na súka ya sánzá ya sambo, ebomaka ba civil koleka 40 o eleko ya mobúlú libosó ya ndáko-Nzámbe katoliko ya Komanda.

Nsómo yoko súka te

"Ezali nsómo yoko ebongisama", etelemeli sángó Giovanni Piumatti, sángó ya Italie, motindami ya Fidei Donum na dioceze ya Butembo-Beni. Sángó alimboli ba nzoto bikatana mito mpe bibembe bitandami na ba balabala. Bakristu, katoliko mpe ya ngelesa, bavandi na bisika bina, bangó bazali waná úto mibú ebelé na bobángi ebotami na mobúlú ya ntángo insó. Nsómo ena súka te ekomi leló ya "momeseno", ebakisi ye, "na bobandeli póso na póso úto mibú mibalé to misáto". Sángó Piumatti alimboli 'te klima yoko ya bozangi koyéba nini ekokoma lobi ezali na engumba. Po ya boyanoli na mokakatano ekoúmela ena, baí-mboka, elobi ye, bakolakisa misapi na Mampinga ya Congo-Kinshasa (FARDC) ya boyokani, po likambo yangó nanu elongama te úto mibú ebelé, atáko lisálisi ya mampinga ya Uganda ezali.

Ba mbano na engumba

Mokakatano na engumba ya Beni ekolakisa mokakatano ekosálema na Kivu mobimba. Bituka ya Goma mpe ya Bukavu, na nkita koleka na mabanga ya ntalo mpe na mabelé bimonanaka mingi te, bizuami mpe bikonzami úto koleka mobú moko na batomboki ya M23 basalisami na Rwanda. “Etumba na Kivu esali milio zomi ya bawéi na ba mibú ebelé, na bonkutu ya lisálisi ya Westi", etelemeli lisusu sángó Piumatti. "Likambo ekolukama ezali polélé ya kotika mobúlungano", elobi ye, po ya makambo bikeseni, mingi mpenza "bozui ya mabelé mpe makoki ya ntalo, mpe tángo mosusu atá ba mbano ya ba nkóta".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

08 sánzá ya míbalé 2026, 16:12