Bato ya Zaporijjia mokolo na mokolo na nsé ya ba bombe
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
O ntéi ya butu úto 5 kinó 6 ya sánzá ya mibalé mpe na ba ngonga ya yambo ya ntóngó, limpinga ya Russie ekotisaki mobúlú moko makási libosó ya mboka ya Ukraine. Engumba ya Zaporijjia ezalaki káti ya baye biyokaki pási mingi. Ba ndáko ebelé bibébaki mpe ba civil bazuaki makámá balakisamaki: mobáli moko ya mibú 49 mpe mwási na ye ya mibú 48, na lokóla elenge mobáli ya mibú 14 mpe moto moko mosusu bazokaki.
Sima ya mobúlú eye, Mgr Jan Sobiło, episkopo molandi ya dioceze latin ya Kharkiv-Zaporijjia, alimboli na ba média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo loléngé etuka yoko ekokemba mokolo na mokolo na maséba, na malili, na bokati lotiliki mpe ya biloko bipesaka móto na ndáko. "Ntóngó eye, na ngonga ya mwambi, tosalaki misa", elimboli ye. "Babéngami ya Italie bazalaki waná: mokambi ya Misála ya batindami ya Papá na Ukraine, sángó Luca Bovio, IMC, na lingomba na ye. Na misa, ba lokito ya makási biyokanaki. Bobwaki ba bombe ezalaki kosálema. Namonaki lokóla drone yoko ekweyaki: ekimaki lokóla libúngútulú lyoko ya móto na likoló. Ekweyaki mpe ekobaki kopela. Ezalaki ntóngó yoko ya mobúlú koleka". Atá bongo, emoni episkopo, bato bakokoba kosambela. "Ezali mawa ya koloba, kasi tomeseni na etumba. Maséba bikolela ntángo inso, moyi mpe butu. Mingi bakokende kobombana lisusu te, po ekoki te kosálema kaka bongo. Sókó te, basengelaki kobika na nsé ya mabelé ntángo inso. Yangó, bato bakomeka kosála loléngé bakoki".
Bokási ekoki te na moto nionso
Bozangi lotiliki ezali yoko ya makambo ya pási. "Bokati ya lotiliki bizali noki noki", elimboli ye. "Biténi bisusu ya etuka bizangi lotiliki na eleko yoko nzokándé basusu bazali na yangó. Na Zaporijjia, bobébi ya lotiliki bizali mingi te, kasi bokati lotiliki bizali ngonga nionso, po bokási ya lotiliki eye ezali ekoki te po ya bato nionso". Eloko ekopesa móto ezali kotála ndéngé ya ndáko: "Baye bazali kozua móto ya gaz, lokóla biso, bakokoka kozua móto. Kasi na ba ndáko mingi ya sika, nionso ekotámbola na lotiliki. Soki bokati ya lotiliki esálemi, móto ezali lisusu te, ba pompi bikosála te, mpe atá mayi ya móto ekatani. Basusu bakozua móto na mituka na bangó: na pokwa, bakoti kúna po ya kozua móto moke, sima bazongi epái na bangó mpe bakolala na bilamba po ya kobátela móto". Likambo liye ekosálema kaka na Zaporijjia te, kasi na bituka bisusu, lokóla Kiev mpe Dnipro.
Bosálisani ya Papá mpe ya ba paloise
Na loléngé ena ya pási koleka, ba paloise bikokoma esika yoko ya elembo ya ntina. "Bato bakokoba kozala na misa", ekobi Mgr Sobiło. "Na sanctuaire ya Nzámbe Tatá ya Ngolu, bandeko babáli Franciscain Albertin bakokabola mapa mbala minei na póso. Pembeni na bato 1 500 bazali koya na bokaboli nionso mpe kinó 2 000 mokolo ya póso. Bakozua lipa na ba confiture". Nzokándé, makoki bikosila. "Ezalela ezali na biténi mingi. Lisálisi ekomi kobunga, botámboli ekomi pási mpe bakumbi mituka balingi kosálisa bisó te. Kasi bandeko babáli bakokoba kosála lipa, basusu bakopesa likabo ya confiture mpe mwá masangá bakosunga bisó. Ezali bongo ndé tokotelema"
Sima ya Mbótama, botiki boko ya ntina ekomaki: "Motuka moko ememaki bilei bitindamaki na episkopo ya lokúmu Konrad Krajewski. Bamemaki ba potopoto ya mbala moko. Bizalaki malámu, mpe bato balingi yangó mpenza po bikopesa móto ntángo malili ezali. Atá ba soda na etumba bakosenga yangó. Eleko na eleko, bazali koya koluka yangó po bizali kilo te mpe mindondo te po ya komema. Bakoloba 'te yangó ekobikisa bomoi na bangó”.
Po ya Eklezia ya awa, kosálisa ba soda ezali likambo lyoko ya ntina. "Kosálisa ba soda na bisó ezali na ntina. Soki babateli bisó te, lisálisi esusu ezali pamba. Bato ya Russie bakoya mpe bakozua nionso ya bisó. Yangó waná tokosambela po na bangó mpe tokosalisa bangó na loléngé nionso ekoki: bakobatela ekóló na bisó".
Bozito enéne ya etumba
Ezalela ya limpinga etikali mabé. "Kinó na eleko ya malili, ezalela ezalaki mwá moke kimia", elobi Mgr Sobiło. "Tozalaki ya kondima 'te limpinga na bisó ekotelemisa monguna mosika na etuka. Sik’oyo, tokomona baí-Russie kopusana epái ya Zaporijjia, limpinga ekotika, bato na bisó bazali na pási koleka". Na bileko ya boye, malili ekobongisa eloko te: "bakobwaka ba bombe na etuka, na nzela ya lotiliki, nionso eye epesaka bisó mwinda mpe móto. Ba civil bakonyokwama, lokóla ba soda. Limpinga ya Russie ekozua litomba ya eleko ya malili po ya kopusana. Dniepr ezali gelé, mpe bituluku ya bobebisi mpe ya boyebi bakokatisa mongálá likoló ya glace".
"Matondo ndéngé bobosani bisó te"
Motángo ya bato ya etumba ezali yangó lokóla monéne. "Bato basusu balobaki 'te bakolongwa áwa te. Sik’oyo, nakomona bangó bakokanga bisaka na bangó mpe kokende na mabótá na bangó. Bána bakokoka lisusu te: ba drone bikotambola likoló moyi mpe butu, mpe bakokwéisa yangó. Ezali mokumba ya likanisi enéne, mingi mpenza po ya bána mike". Episkopo molandi ya Kharkiv-Zaporijjia akolendisa baye bansó bakoki komemela bangó lisálisi, na bolobi 'te baí-mboka ya dioceze na ye babungisi nionso. "Lotiliki mpe mayi te, misála bikoki kosála te, mpe ba pósá bizali bebo". Na bolobi na batangi mpe bayoki ya ba média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, episkopo aúta na ekóló Pologne alobi matondo na ye po ya bosálisani emonisami. "Yambo mpenza, nakotondo Sántu-Papá po ya penepene na ye, maloba na ye ya bosungi mpe ya lisálisi akomemela bisó na nzela ya episkopo ya lokúmu Krajewski. Tokoba kosambela. Nakotonda lokóla ba média na binó po ya mosála ekosálema na etumba, po ekomonana ntángo mosusu 'te mokili ekobosana monyoko eye tokobika. Nabondeli bino: bobosana Ukraine te. Likanisi mpe lisálisi ya mitéma ya mibáli mpe ya bási bikopesa móto na motéma na bisó".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye