Repair Cafe in Dublin Repair Cafe in Dublin  (REUTERS)

Ukraine, kobunda na malili na molunge ya mosála ya mpámba

Bomipesi na "Kompani ya bosóni", likambo lyoko ya sóló ebotami na Dnipro mpe ezali leló na bási na biténi bikeseni na mokili eye, na ofelé, bakosóna bilamba bibongami, po ya ba civil mpe ba soda bazoka na etumba mpe po ya kobunda na malili makási. Kseniia Samoilych, yoko ya babandisi ya likanisi: "Tozali na motéma lokúmu mpe bokeki (soin) ya bato".

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Bokoti ya Russie na Ukraine ebándaki na 24 ya sánzá ya ibále 2022, na eleko ya malili, mpe atá soki ezalaka makási, ekomaki likambo lyoko ya pási ya kolonga po ya ba civil mpe ba soda. Moto moko abongamaki te mpe nionso ezangaki, makoki ya mpámba po ya bokengi ya ntina. Nzokándé, atáko mikakatano, baí-Ukraine bazuaki bokási ya kopika mpéndé, likoló ya likoki na bangó ya kobongisa mpe ya kokela bisika ya mike ya mwinda mpe molunge ya moto esika wápi emonanaki ekozuama te, na bileko ya molili makási mpe na bisika ya malili koleka. Ezali likoló ya bikela ya bosálisani mpe ya bokébi epái na epái ndé bomoi ekokoba kobonga, atá o ntéi ya etumba.

Ebándeli ya likanisi

Kseniia Samoilych, elenge mwási yoko aúta Dnipro, mboka-mokónzi ya engumba ya monyele ya Ukraine, alobi likanisi ya mosáli ya mpámba ya "Kompani ya bosóni" eye esónaki bilamba koleka 300 000 bibongami po ya ba civil mpe ba soda na ba mpota bazali na ba lopitalo 90 ya Ukraine, na bosangisi koleka bato 800 ya basáli ya mpámba na mokili. "Tolosaki (nous avons lancé) likanisi ya bisó na 28 ya sánzá ya ibále 2022 na Maryna Palchenko, elobi Kseniia, na eyano ya mbela moko ebwakamaki na Instagram: tozalaka na pósá ya bato bakoki kosóna ba cagoule po ya bilenge bamipesi po ya bobateli ekóló. Basáli ya informatique ya Dnipro bapesaki eténi ya ndáko yoko mpe mosolo bisengeli po ya kosomba elamba, tomemaki ba masini na bisó ya kosóna mpe tokotisaki bási basusu ya litéya ya bosóni baye tozalaki kolanda na Maryna".

Ba ngwendé na bituka ya mokili mobimba

Likoló ya bobongisi boko elamu ya mosála, etuluku elongaki kobimisa kinó cagoule 495 na mokolo, elembo yoko ekanisamaka te yambo ya etumba. Na sima, ba bosenga ya bilamba ya nsé (sous-vêtements) ya thermique biyaki ebelé, atáko mokakatano ya kozua bisaleli bisengeli: ba magazini bebo bikangemaki mpe bilamba bilongobami bikozanga. Tángo mosolo ebandaki kozanga, Kseniia mpe basusu basengaki lisálisi na ba réseaux sociaux. Basáli ya mabóko ya bási ya bingumba bikeseni ya Ukraine, mingi mpenza basengelaki na makási kokima pósá na bangó ya kosálisa mpe etuluku ebándaki koluka mosolo, kosomba bilamba mpe ya kotinda ba kit ya bosóni na baye basálaka ya mpámba na ekóló mobimba. Na lisálisi ya ba patron mpe mikáno bikabolamaki na internet, Kompani ya bosóni elekaki ba ndelo ya Ukraine mpe ezali sik’oyo na bisika 25 na bituka bikeseni ya Ukraine mpe na bikolo lokóla Canada, Suisse, Monténégro, Angleterre, Pologne, Tchèquie mpe Allemagne.

Bosenga ya lisálisi

Leló, etuluku ekosalisana na ba lopitalo koleka 100, biye epesaka tángo inso bilamba ya móto. Kasi, ba pósá bileki mosika makoki ya basáli ya mpámba, mingi mpenza o eleko ya malili. "Po ya bato na bisó, ebakisi Kseniia, ezali na ntina 'te moto moko, kinó sánzá ya mitáno, akoka kosálisa bisó na bilamba bisusu. Nakokundola sánzá ya misáto 2022, ezalaka kosála malili makási o eleko ena lokóla, ezalaka eleko ya malili koleka ya bomoi na ngai".

Kozua bokeki ya moninga

Basáli ya mpámba ya "Kompani ya bosóni" bakotala likambo lyoko lyoko libosó ya kotinda bilamba bilongobami na ba lopitalo: bakosukola yangó, kokaúkisa yangó mpe kotia yangó na ba sac. Bayébi boni boni ezali pási ya kosukola mpe kokaúkisa na lombango na lotiliki te. "Waná ekolakisa 'te tozali na motéma lokúmu mpe bokeki ya bato. Tokomeka kosála nionso lokóla soki ezalaki po ya bandeko na bisó, po ya baningá na bisó, lokóla soki ezalaki po ya bisó moko".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

24 sánzá ya yambo 2026, 17:42