Luka

Papa Léon XIV o eleko ya losambo na Maria, na eyenga ya santu Etienne Papa Léon XIV o eleko ya losambo na Maria, na eyenga ya santu Etienne   (ANSA)

Sant’Egidio: "Libosó ya bitumba, Léon XIV abengi ya kolongola mondoki na mitema"

Mokambi ya lisangá ya Sant’Egidio alimbolaki na ba média ya Vatican liloba ya Papá po ya Mokolo ya boboto na mokili: "Tokoyoka koloba 'te etumba ekoki kosálema pe boboto ekoki kosálema te". Boboto boko "ya bozangi mondoki pe ya bolongoli mondoki" ekoki kosálema úto ezalela ya sóló ya moto moko moko, na nzelá ya bolingo, bokutani pe likoki ya lisolo.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

"Esengeli tángo inso kondima 'te boboto ekoki kosálema: ezali ebándeli ya lisikulu nionso ya biso". Ezali na bondimi ena 'te Marco Impagliazzo, mokambi ya lisangá Sant’Egidio pe motangisi ya lisapo ya leló na Université Roma Tre, alimboli Nsakola ya Léon XIV po ya mbala ya 59 ya Mokolo ya boboto na mokili, na eleko yoko mokili ezali na eye Papá akobenga "etumba ya misáto ya mokili mobimba na biténi".

"Boboto ekoki kosálema"

Po ya Marco Impagliazzo, Papá azali "polélé koleka": na Eklezia mobimba, alobi 'te boboto ezali likambo ya lokuta lyoko te. Ezalela yoko ekeseni na momeseno ya kokonza te esika wapi, eyoki ye mawa, "tokoyoka lisusu te kolobela 'te etumba ekoki kosálema pe boboto ekoki kosálema te", waná etumba ekomi lokola eloko ekoki koleka te. "Na mawa etumba elongi milimo pe mitéma ya bakonzi ebelé na mokili", emoni ye, na bolobi 'te emoniseli ena epanzani na "biténi mingi, kinó na likanisi ya bato". Nsakola ya Léon XIV ebimi lokola "bobongoli ya sóló na likambo eyebani po ya etumba ya eleko na biso".

 Boboto boko "ya bozangi mondoki pe ya bolongoli mondoki"

Engebene na Impagliazzo, Mokitani ya Petelo azongeli likanisi lyoko elobama kála na Yoane XXIII: boboto ebandi na bolongoli mindoki na bisika ya bobombi, kasi lokola ya milimo. Ezali boboto boko ya "bolongoli mondoki, úto ezalela ya sóló pe ya bomoi ya moto moko moko", ezuami na "bolingo, bokutani pe likoki ya lisolo". Ezalela ena ya moto na moto ebengami ya kokoma lokola eye ya Bikóló, "na boyokani káti na bango pe na bato". Bomoni boko ya botuni, endimi ye, nzokándé koleka bitumba ntuku mitáno bikosálema sik’oyo na mokili pe, engebene na bilembo bipesami na SIPRI, motángo ya mosolo ebimi po ya mampinga emataki na 9,4 % ya PIB ya mokili.

Mbótama ekoyebisa lisusu 'te bokási ya sóló ezali na baye babotolami mindóki

Ezali ndé na Mbótama esika fungola yoko ya makasi eúti. Mbótama ya Yézu, "mwána moko azangi bobateli akomi Mobikisi ya mokili", alobi lisusu 'te "bokási ya sóló ezali eye ya bakonzi to ya mampinga te, kasi eye ya baye babotoli bango mindoki, lokola ezalaka Yézu". "Na ye, totikala koyoka te maloba maye bizali ya bolongoli mindóki te", elobi ye. Maloba bizangi bokási biye bibongisi lisapo, na bopesi bomoi na "momeseno moko ya sika": eye ya bondeko na mokili, ya bolingo pe ya bokébi na bána mike, na bato ya súka pe na baye babwakama. "Kobimisa lisusu nsakola ena ezali na ntina po ya eleko na biso", ebeti ye nsete.

Bobungisi na mawa ndéngé ya mayéle

Nsakola ya Léon XIV ebimisi lokola na mwinda likambo mosusu ya lombango: bobungisi ndéngé ya mayéle, mpenza eye ya "makambo ya mawa ya minéne na ekeke ya 20: bitumba mibalé ya mokili, Shoah pe bobomi bato (génocides) bisusu".

Engebene na Impagliazzo, komipesa te na mayéle atá na boyékoli lisapo ekomeme na botéyi boko ya mobola: "Tokoyeba kokanisa, kasi ya koyéba makambo minéne ya lisapo te. Botéyi ya bilenge ekomi bongo bongo, ezangi eye eleka, eye ya leló pe eye ya lobi ekoya". Esika, elobi ye, Eklezia ekokoba komipesa, mpenza na nzelá ya botéyi boboto, "ya ntina pe ebengami kozua motúya lisusu".

Mosála ya kokitanisa biyamba te

Na súka, Marco Impagliazzo atié libosó mosála ya ntina ya biyamba, ekundolamaki polélé na Papá wa Roma. Alobi bokutani káti ya biyamba y'Assise na 1986, o eleko Yoane Polo ya Mibalé, na ndéngé ya Concile Vatican II pe ya Nostra Aetate, azongisaki boboto o ntéi ya liloba ya biyamba.

Banda wana, "matambe minéne bisálemi na lisúngi ya bokútáni, ya lisoló pe boyébi epái na epái". Leló, elobi ye, "na biténi binso, lisoló káti ya biyamba ezali o ntéi ya liloba ya boboto" pe ekotuta mbala moko bato, na bolekisi bondimi 'te "ekoki kosálema tobika elongo na boboto". "Tosengeli tángo inso kozala na botondi na Yoane Polo II na botiyi likambo-likonzi ena o káti kaka ya lisoló ya biyamba te, kasi lokóla ya politiki pe bozali ya bato na mokili", esúkisaki mokonzi ya lisangá Sant’Egidio.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye 

04 sánzá ya yambo 2026, 11:15