Po ya mokambi ya baepiskopo ya Venezuela, "elikya ezali na boboto pe na bosémbo"
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
" Na bileko biye ya pási, mayoki ya kobunana bikoloba". Mgr Jesús Andoni González de Zárate Salas, episkopo ya Valence na Venezuela pe mokambi ya Lisangá ya baepiskopo ya Venezuela, alimbolaki po ya mbala ya yambo úto milulu na ba média ya Vatican 'te likambo lyoko ya ntina esengeli eyebana: "Ezali na ba bokeseni ya botáli na eye etáli politiki ya ekóló. Na nionso, bato bakozela nini ekoleka na milulu biye bikosálema nanu. Po ya mingi, na ngonga eye, mituna bizali ebelé koleka biyano".
Kimia koleka bosóló
Lisoló ya Mgr González de Zárate Salas ekopesa elili ya ekóló yoko úta lelo ekwéi na "kimia lyoko ya bobéndani", simá ya póso elekaki, yambo ya bokoti ya limpinga, nsómo etindi bato ya kobomba bilei bisengeli. "Biso, baepiskopo", elobi ye, "tolekisi bileko bina na boyambi pe na loléngé lyoko ya losámbo. Bosóló pási, ya biténi mingi pe ekokende eye Venezuela emoni ba mibú mingi bileki eteyi biso ya kopesa litomba na emoniseli ya bobateli pe likambi ya bato na biso na botáli makambo misusu". Yango wana, mingimingi na eleko eye, "tomonaki ezali libakú ya kosimba makási boyebisi (communication) tángo inso pe na ba sángó na biso zambi ya kozala pembeni ya bana mboka pe kokamba bango".
Botosi pe bolimbisi (tolérance)
Episkopo akamwaki te ya komona 'te, mokolo elandi bokoti ya limpinga, mokolo ya eyenga, "bozali na misa ezalaki ndéngé ya momeseno". Elembo yoko 'te elikya nanu ekwéi te: "Ezali kaka elikya wana eye emonanaka mbala ebelé na mibú miye ya pási: eye ya kokoka koyanola na makambo na biso na kimia, na bozali ya banso, engebene na Mobéko-likonzi pe na mituya (valeurs) ya démokrati biye tondima lokola bana ya ekoló". Baepiskopo ya Venezuela balakisi ba nzelá ya semba po ya kokola na bomoko na ekolo pe na boboto. Bizali, mokambi ya baepiskopo atangi, "botosi pe lokúmu ya moto, bolimbisi pe boyébi epái na epái, bolukiluki ya bolámu ya banso pe bolongobani ya mituya ya démokraci. Bizali ba nzelá ya pété te ya kolanda, pe tomonaki yango mibú miye mileki".
Mokumba ya ekóló
Mokonzi ya Lisangá ya baepiskopo ya Venezuela alobi lisusu na bokási 'te "mokumba ya koyanola na ba bosóló ya biténi mingi pe ya pási eye ekóló na biso ekoleka etáli libosó libosó, bisó, baí-Venezuela, atá soki tozali kondima lisálisi ya lisangá ya mokili na maye matali lisálisi ya bato, ya bobateli makoki ya bato pe motindo ya démokraci. Tokozala kaka na bosenga ya lisálisi ena".
Ba botondi na Papá
Mgr González de Zárate Salas apesaki botondi na Léon XIV po ya penepene alakisaki na suka y'Angelus ya mokolo ya eyenga 4 ya sánzá ya yambo. "Úto ebándeli ya mosála na ye, Papá atatoli bolingo na ye enéne po ya bato ya Venezuela pe boyébi boko ya mozindo ya bosóló na bisó. Yango wana tokokúmisa mingi mpenza maloba ma ye, biye bibandi linaka lyoko moko ya kolanda: kolonga mobúlú, kosála po ya bosémbo pe boboto, kobátela bonsómi ya ekóló, kolaka Letá ya sémbo ekomami na Mobéko-likonzi, botosi makoki ya bato pe ba civil, pe kosála elongo na botongi lobi lyoko ya kitoko"
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.