Ndako-Nzambe Pater Noster,  na ngomba ya ba Oliviers na Yérusalem Ndako-Nzambe Pater Noster, na ngomba ya ba Oliviers na Yérusalem 

Na Yérusalem, pási ya bitéyelo ya bokristu

Mikolo mitáno, bitéyelo 12 ya bokristu ya Etuka esántu batikaki mosála (grève) simá ya bolongoli na Israël 171 ndingisa ya mosála, na botáli balakisi bazali na Cisjordanie. Secrétariat ya bansó ya bitéyelo ya bokristu etelemeli mikáno ya mabé. Bána ya kelasi basengelaki kozongela etéyelo na 17 ya sánzá ya yambo.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Úto mokolo ya póso 10 ya sánzá ya yambo, mokolo ezalaki ya bozongi na kelasi po ya bána 10 000 ya bitéyelo ya Yérusalem, bitéyelo yangó baboyaki mosála. Ntina ezalaki bozongisi sika ya ba ndingisa ya mosála ya balakisi 171 ya bitéyelo bina na bakambi ya Israël. Na moke bitéyelo 12 ya bokristu ya Etuka esántu bitikali ya kokangama po ya kotelemela mikáno biye bikobebisa botéi ya bilenge, bakristu to ba musulman batangaka kúna. Mokolo ya minei eye na sima ya nzánga ya 15 ya sánzá ya yambo, bitéyelo bisakolaki kokoka kofúngola póso ekoya, na bozui elaka 'te ba ndingisa bina bikoki kopesama lisusu.

Ebándeli ya matata eúti mobú moleki, sima ya bokati sánzá yoko ya ba ndingisa ya mosála epái ya Israël. "Sánzá yoko mobimba, balakisi na bisó bakokaki kokoma na Yérusalem te, atáko etéyelo ekangemaki, ezalaki na pósá ya bosimbi yangó malámu", elobi mofulele Daoud Kassabry, mokambi ya Etéyelo ya Frères des écoles chrétiennes, ezali na káti ya etuka, eye eúti na 1904. "Na 20 ya sánzá ya mwambi, basukaki na kobongisa ba ndingisa, kinó 30 ya sánzá ya zómi na mibále, pe úta waná, eloko te", eyokaki ye mawa.

"Mikáno ya mabé"

Likambo ya ntina, ba ndingisa waná bipesami na baí-Palestine ya Cisjordanie po ya kosálisa bangó ya koya kosála na ndéngé elongobami epái esusu ya bokaboli na Israël. Sima ya boboyi ebelé, bitéyelo ya bokristu ya Yérusalem bizuaki yambo ndámbo ya ndingisa, kasi na ba bopekisi ya makási. "Ekamwisaki bisó ya koyéba 'te ba ndingisa bipesamaki te na bato baye balongana nanu te", elobi mofulele Kassabry.

Mwá ba ndingisa bipesamaki bizalaki po ya eleko ya mikolo 5 ya póso, na bolongoli ndakisa póso (mokolo ya Sabbat), tángo efungwami na bitéyelo ya bokristu. Na communiqué yoko ebimaki na 10 ya sánzá ya yambo, Secrétariat ya bansó ya bitéyelo ya bokristu etelemelaki "mikáno ya mabé", na bolimboli "bozangi makoki na ye ya kosála etamboli elamu ya semestre ya mibále soki kaka mikáno waná bitikali".

Likófi epesami na etéyelo ya bokristu

"Mikáno mina bizali o ntéi ya mobúlú moko etáli motindo ya botéi ya Palestine na Yérusalem, po ya kobebisa mokánda ya Letá ya Palestine, ya kobotola likoki ya boyekoli pe kokanga likoki ya bonsómi ya kotambola, nionso na bobúki mibéko pe boyokani ya mokili", eboyaki epái na ye ministele ya botéi ya Palestine.

Pási ya koyéba bopekisi waná, kasi eloko yoko ezali ya sóló, ekomonana lokóla bokáneli boko ya mokánda ya Letá ya bolakisi ya bokristu na Etuka esántu. "Toyébi 'te bakambi ya Israël bakosála mosúkú súkú po 'te bandima "bagrout", ekobaki mofulele Daoud, eye ezali linaka ya etéyelo ya Israël, kasi linaka ena ezali koboya bonkoko na bisó, ezali bisó te".

 Mosúkú súkú ena na bitéyelo ya bokristu ya Yérusalem emonani mingi lokóla likófi lyoko ebetami na motindo ya boyekoli ya bitéyelo yangó, epái wápi bakristu pe ba musulman bakobika elongo, pe epái wápi boyekoli ya boboto pe ya bondeko etikali likambo ya motúya, atá bokabwani ezali. Mwángo moko ya mobéko ezali na lisoló na Knesset, esika ya batindami ya baí-Israël, úto mobú moleki. Ebongisi ya kopekisa mosála ya balakisi baye bayékola na mabelé ya Palestine, eye ebotami na 7 ya sánzá ya zómi 2023. Bitéyelo ya bokristu ya Yérusalem bikolikya bakoma waná te.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

18 sánzá ya yambo 2026, 14:59