Na Ukraine, "mokolo na mokolo ezali etumba po ya bomoi"
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
O ntéi ya butu ya 8 kinó 9 ya sánzá ya yambo, mampinga ya Russie babwakaki ba bombe ebelé na Ukraine, na bobébisi bisalelo ya lotiliki pe ba ndáko. Simá ya mobúlú na Kiev, bato minei bazui liwa pe na moke 26 bazokaki. Eténi ya ba ndáko ya mboka-mokónzi, penepene na ba ndáko 6 000, bazangi bisalelo bipesaka móto likoló ya mobúlú ena. Na mikolo mikoya, basáli ya météo basakoli bokiti ya malili. Na Kiev, ekoki kokoma káti ya -11 °C pe -17 °C. Na yangó, mokambi ya mboka-mokónzi, Vitalij Klychko, abengaki bato "baye bazali na makoki ya kobima mwá tángo na Kiev, po ya kokende bipayi bakoki kozua lotiliki". Na lisoló azuaki na ba média ya Vatican, Valentyn Bebik, mokambi ya bokaboli lisálisi ya Caritas ya Ukraine, alobi mikakatano ya baye bazanga makási, ntina ya lisálisi pe bosálisani ya mokili, na bolobi "bomipesi na mabelé ya basáli ya Caritas ya Ukraine".
Nini leló ezali boyambo ya yo? Epái wápi lisálisi ekokende mingi?
Boyambo na bisó po ya lisálisi etáli sik’oyo likambo ya malili. Mosála ebandaka kála, na bobongisi ba mikáno pe boluki ya mosolo. Masangá bikobika na 30 kilometele ya bitumba bazuaki esalelo ya bopesi móto na ndáko to mosolo po ya kosomba yangó. Sik’oyo tozali kotála mingi ba pósá bitáli pási ya lotiliki biúti na bobwaki bombe: tokokabola mwá biloko ya kosunga bato. Bituka bizali pembeni ya bitumba bitikali boyambo ya bisó, po waná esika bato bazangi makási bazali. Lisusu, tokosalisa na bobimisi bato na bisika makámá bizali makási.
Boni boni kolandisa ba pósá ya bato bakobika na ekóló monéne pe na botámboli ya mokakatano?
Caritas ezali na káti ya Eklezia pe ekangami na mozindo na masangá. Réseau na bisó ezali monéne te lokóla eye ya Pologne to y'Allemagne, kasi engumba yoko yoko azali na ba Caritas ya dioceze pe ya paloise biye bikopesa lisálisi pe biyébi malámu ba pósá ya bato. Tángo likambo lyoko ya pási ekomi, boyebisi makambo ndéngé bikoleka ezali mbala moko: tozuaka ba nsango ya ba sángó baye bakokamba pe, na botáli ba nsango bina, tobongisi eyano na bisó. Tángo mosusu, lisálisi ekosálema na lombango, misusu bikozua mwá ngonga ebelé, mingimingi soki tokutani na makambo ya minéne koleka.
Úto ebándeli ya etumba, lisálisi eye ekokoma na Ukraine ekiti. Bozali na makoki ya kokoka po ya koyanola na ba pósá ya bato?
Caritas ezali o ntéi ya lisangá ya mokili eye ekosálisa Ukraine na lisúngi ya mbongo ekoúta epái ya bato to epái ya Letá. Kasi, mosolo yangó ezalaka ya kokoka te. Moko ya misála na bisó ya moke - kasi ya ntina - ezali ya koyébisa baye tosalaka na bangó 'te tokoki kosálisa moto nionso te. Yangó waná tozali kotála mingi baye bazanga makási, na kolongola moto te, kasi na botindi lisálisi epái wápi ezali na pósá makási. Na mokuse, makoki bizali ya kokoka te pe bikotikala kokoka te, po lokóla etumba ekokoba, motángo ya bato bazangi makási ekomáta.
Yo moko, ndéngé nini osálaka po ya kopika mpéndé na makambo ya pási boye?
Po ya ngai, etumba ebandaka na sánzá ya mwambi ya 2014, tángo limpinga ya Russie elekaka ndelo ya Ukraine. Úta waná, naleka bileko bikeseni: elikya 'te etumba esila na lombango, esengo, bolembi, bolembu... Nionso waná eleki. Leló, yangó ezali kaka o káti ya bomoi. Nakoyeba lisusu te boni boni nazalaka na 2012; nazali sik’oyo moto nazali leló. Nakosâla na Caritas úto 2014 pe nakoki kokanisa bomoi na ngai te na libanda ya lisangá eye pe na libanda ya eye tozali kosála.
Likambo nini olingi koloba na batángi pe bayoki ya mokili mobimba?
Nalingi napesa matondo mingi na baye bansó bakosálisa Ukraine. Matondo mingi po ya bosálisani na bangó. Koyoka lisálisi ena na nzelá ya ba botáli, ya ba boyebisi to na mikáno ezali mpenza ya kokámwa. Yangó ekosála toyéba 'te mokili ya bakristu ezali mokili moko ya bondeko, esika wápi bato bakosúngana. Yangó waná nazali na botondi mbala moko na bato pe na Nzámbe, oyo akela mokili moko esika wápi ekoki kosálema komona eye bokristu ekomemela bato.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.