Luka

BaI-Amerika mibalé babomaki bango na polisi ya boyingeli na Minneapolis BaI-Amerika mibalé babomaki bango na polisi ya boyingeli na Minneapolis  (Tim Evans)

Minnesota: episkopo ya Sántu Cloud akolela mobúlú ya polisi ya boyingeli o ekóló

Na dioceze ezuami o ntéi ya archidioceze ya Sántu Polo mpe Minneapolis, Mgr Patrick Neary alobi bobángi na ye libosó ya misála miúti koleka na ICE epái ya bato bakoyingela o ekóló bafundami ya kobuka mobéko. "Lokolá na Minneapolis, ICE ekosalela bongo ba loléngé bimonani mabé. Mingi bakobanga kobima epái na bangó mpe bakokende mosála te", alimboli na ba média ya Vatican.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

"Ekomonana lokóla basáli ya ICE bakosála malámu te. Bakosalela elobeli yoko ya mabé, bakosála makambo makási makási. Ekomonana lokóla 'te ndéngé bakosalela lingénda na bangó elongobani te na eye ba mbulumbulu ya sóló basengelaki kosála". Mgr Patrick Neary asili amona "bikela (opérations) bebo na boyingeli o ekóló na moyibi" bisalemaki na ba mbulumbulu y'Amerika ya ICE, Immigration and Customs Enforcement.

Boboyi ebelé

Dioceze eye ye azali episkopo, eye ya Sántu Cloud, ezali na kilometele ntúkú motóbá na Minneapolis, etuka eningisami na boboyi ebelé sima ya bokangi bato mingi mpe bobengani ya bato bayingelaki o ekóló na moyibi bafundami ya kobuka mibéko ya boyingeli na ekóló. Mawa emati lisusu makási sima ya liwa elukami na basáli y'Amerika ya boyingeli, o eleko ya botámboli boko ya koboya bikela ya basáli ya ICE na mokolo ya póso 24 ya sánzá ya yambo.

Ba ndáko-Nzámbe bizali lokóla na kati

Episkopo ya Sántu Cloud amonaki basáli bina mpe bobángi ena kotambola na balabala ya dioceze na ye. Alobi yangó na ba média ya Vatican, na bosemboli o ebándeli 'te loléngé ekoleka ekeseni te na eye ya Minneapolis: "ICE ezali nzinganzinga ya ba ndáko-Nzámbe na bisó. Na mwá makambo misusu, basáli babetaki ezibeli ya masangá ya eklezia esika wápi motángo ya ba Latinos ezali likoló: moto nionso akobánga akangema". Ebelé bazali baye bakobima lisusu te epái na bangó na bobángi ya bokangemi, ba nkánga (menottes) na maboko mpe bokabwani na mabótá na bangó. "Bakokende atá mosála te mpe soki bazui mbongo te, bakokoka kofutela ndáko te, ba fakitili te. Ya sóló batungisami".

"ICE ezali nzinganzinga ya ba ndáko-Nzámbe katoliko..."

Sántu Cloud ezali etuka yoko ya bato 70 000 na káti 13% ya mabótá biúti Somalie. Mingi o ntéi na bangó bayingeli o ekóló na moyibi, kasi bána na bangó babotami n'Amerika. Mpe bangó lokóla, etelemeli Mgr Neary, bazali kolukama na ICE: "Tángo ba mbulumbulu bayaki kokanga mwá bilama ya lisangá ena, bitumba bibimaki. Kála te, babengaki bangó na kombo ya bato bakoki kozala áwa te mpe baúti na bonkoko boko ezali kotosama malámu te. Banda waná bakobika na loléngé lyoko ya pási". Nkanda eye ekokola koleka na bato ezali po basáli ya ICE bakoki kokota na paloise moko, etéyelo yoko to ndáko yoko na bozui lotómo ya bakonzi te. "Nakanisi 'te lotómo ya letá ekoki sik’oyo", eyoki ye mawa. "Yangó ekolakisa bobuki ya mwá bonsómi biye tozali na yangó na ekóló eye: ezali na bobángi boko enéne na eye etáli bokwei ya letá ya mobéko mpe ya motindo ya ekóló"

Mbamba ekopona

Kasi likanisi lyoko, epanzani makási, engebene na episkopo, ekotámbola o ntéi ya bato: "Bato mingi bakokanisa 'te ICE ekosála kaka mosála na ye...Nasosoli 'te bobángi ya moningá ekopusa baye bakosalisa ICE ya komona bayingeli o ekóló lokóla babomi, po ezali ndéngé waná bakolimbola bangó, kasi yangó ekotungisa". Mingi mpenza po mbamba ekomonana kotála makási bayingeli bazali makási te baye babandi nzelá ya bokomi moto ya ekóló sima ya bozui mokánda ya boyingeli na mboka na ndéngé elongobami. "Basusu bakoluka bangó na ICE atá na libándá ya bisambi (tribunaux) ya boyingeli. Soki ICE azalaki koluka kaka bato basála mabé ya sóló, eloko moko ya mabé ezali waná te. Toyébi malámu 'te Amerika azali na lotómo ya kobátela ba ndelo na ye, kasi loléngé lyoko, baye bakokima bobola ya koleka to mobúlú bazali na lotómo ya koyingela. Esengeli kozua bokokani (équilibre) káti ya makambo mibalé bina ya soló".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

30 sánzá ya yambo 2026, 09:45