Elilii ya bolakisi Elilii ya bolakisi  

Klima: Copernicus akobanga botokisi na 2025

Copernicus Global Climate Highlights abimisaki, mokolo ya misáto 14 ya sánzá ya yambo, mokánda (rapport) na ye 2025 eye endimi 'te ezalaki mobú ya misáto ya móto koleka nanu emonana te na mokili. Mokánda elakisi makambo mibalé ya bomati eleki ndelo ya botokisi (réchauffement): lisangisi ya gaz à effet de serre pe bomati ya móto likoló ya ba mbú (océans)

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Mokánda ya Copernicus ebimaki mokolo ya misáto eye etangi mayéle (raisons) mibále ya ntina na bolimboli po na nini mibú bikokende úto 2023 kinó 2025 bizalaki móto koleka. Ya yambo ezali lisangisi ya gaz à effet de serre na libándá (atmosphère), eúti na bokobi ya ba bopalinginyi (émissions) koleka pe na bokiti ya bomeli (absorption) ya dioxyde ya carbone na mabúlú ya mokili lokóla ba zamba. Ya mibále ezuami na ba móto to malili likoló ya bibale makási mpenza epái ya ba mbú, bisangani na eleko yoko ya El Niño pe na makambo misusu na bobaluki ya mbú, bikomi makási na mbongwana ya klima. Linaka eye ya botáli Mabelé ya laboratoire ya Lisangá ya Poto elakisi 'te mosála ya bato etikali likambo ya ntina na bomati ya molunge pe malili ya makási. Eleko 2023-2025, elobi mokánda ena, epesaki elembo po ya mbala ya yambo 'te mokili etokisami na katikati (moyenne) 1,5°C na botáli eleko ya libosó ya lizini (ère préindustrielle) mibú misáto bilandani.

Bokolisi na lombango botokisi

Mokánda waná ekopesa ba nsango ya móto pe ba lisangisi ya gaz à effet de serre na bokati na mokuse milulu bikomaki mobú mobimba ya 2025 na mokili, pe ekebisi 'te soki etamboli ya sik’oyo ezali kaka, ndelo ya 1,5 °C na Boyokani ya Paris etáli klima "ekoki kokoma úta sik’oyo kinó mibú zómi, koleka mibú zómi na ndéngé ebongisamaki", elobi Copernicus. "Koleka 1,5 °C, ekobaki mokánda, likámá ya botutani ya mabé bisangani na makambo ya météo ya koleka, na maye makokoma ya mabé po ya nzinganzinga pe po ya bolei, ekomáta". Baí-nzebi balobi bokobi ya botáli na bangó zambi ya kosálisa bakónzi ya kososola makámá bisangani na bokobi bopalinginyi ya gaz à effet de serre pe ya koyanola na makási.

Móto na likoló na bobaluki ya mbú na mokili

Ba nsango bipesamaki na Copernicus bilobi 'te móto na likoló ya ebale, mobongisi ya ntina ya motindo ya klima na mokili, emonaki mbemba ebelé mobú moleki. Mbú, balukiluki balobi, ekosála lokóla "thermostat" yoko enéne na bomeli pembeni na 90% ya bolekisi (excès) ya molunge ebotami na bopalinginyi ya gaz à effet de serre. Ekopusa 'te mbala moko mbángo eye molunge ena ekokangama to ekokabolama na libanda. Kasi, Copernicus atalisi 'te ba móto koleka ya likoló ya ebale bikangemi na bobaluki ya mbú, na bokotisi, na 2025, eloko ya kokámwa El Niño. Yangó ematisaki molunge na mokili pe etikaki ba móto pe malili na loléngé lyoko ya koleka makási mobú mobimba. Libandá ekotindela bisó nsango yoko, pe tosengeli koyoka ye, balobi lisusu baí-nzebi (scientifiques) ya Copernicus. Babeti nsete na bolongoli na lombango bopalinginyi ya gaz à effet de serre lokóla eyano se yoko na botokisi ya klima.

Vatican akopesa mabóko na bokási libosó ya botokisi

O eleko ya COP30 eye esálemaki na Brésil na sánzá ya zómi na yoko elekaki, pe ezalaka kúna batindami ya ntina ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Papá Léon XIV asalaka po ya ye makanisi elobamaka na Papá François na Laudato si', na bobiangi na ba politiki ya klima ya malongá pe bikoki koyanola na maye Boyokani ya Paris ekoluka. "Lokola babateli ya ekela ya Nzámbe, tobengami ya kosála na lombango, na boyambi pe lisákoli, po ya kobátela likabo eye Apesa bisó", ekomaki Papá na baepiskopo ya lokúmu pe baepiskopo bazalaki na COP30. Na bokumisi ba bobuti bisálemi na mibú zómi mileki biye bilandaki lokasa endimamaka na Paris, Papá alobaki 'te boyokani ena ya bikóló etikali "esalelo ya bisó ya makási koleka po ya kobátela bato pe mokili". "Kasi tozala sémba", ebakisaka ye, "ezali Boyokani eye ekokweya te, kasi eyano na bisó ndé ekokweya. Eloko ekozanga, ezali bolingi ya politiki ya basusu. Bokambi boko ya sóló ekosenga bomipesi moko pe lisalisi lyoko biye bikosála bokeseni ya bosóló". Léon XIV abengaki ya kotambola "penepene ya baí-nzebi, bakambi pe babateli ya bikóló binsó pe ya ba boyambi binsó”.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye. b

17 sánzá ya yambo 2026, 12:52