Luka

Na Chili; bilili y'Allende, akweyisamaki na 1973; pe ya Pinochet oyo akitanaki ye Na Chili; bilili y'Allende, akweyisamaki na 1973; pe ya Pinochet oyo akitanaki ye  (AFP or licensors)

Amerika ya latin: ekeke yoko ya bokoti ya mampinga y'Amerika

Bokoti y'Amerika po ya kokweisa Nicolás Maduro na Venezuela ezali kaka likambo ya sika ya molongó ya ba mobulu bisálema na bikóló ya pembeni y'Amerika ya káti pe ya Sudi te. Litéya ya Monroe ya 1823 ezali ntina ya ba mayéle y'Amerika. Kasi ezali mingimingi na ekeke ya 20 ndé Washington asáli molongó ya bokoti po ya kokweisa ba bulamatari amonaka mabé, kosálisa bakambi ya politiki to kobátela ba mbano na ye ya nkita na esika ya bokonzi na ye.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Lisapo ya ba mobulu y'Amerika n'Amerika ya káti pe ya Sudi ebandi na Venezuela te. Ba mobulu ebelé ya mampinga, mbala moko to ya kobombana, bisálisama na lisálisi ya misala ya liyébisi (services de renseignement), bisálisami o eleko ya ekeke 20. Mobulu ya súka ya mampinga y'Amerika po ya kokweisa mokonzi moko -mpenza po ya mombóngo ya bonkutu ya drogue pe ya bobebisi makoki ya moto- ezali na sánzá ya zómi na mibalé 1989, simá ya bokwei ya efelo ya Berlin pe bokitisi bobéndani na Etumba ya malili (Guerre froide)

"Bitumba ya etabe"

Ba bokoti bina bitelemi na "mayéle Monroe". Esálema na 1823 na mokónzi ya mitáno y'Amerika, James Monroe, emoniseli ena etindaka bobwaki ya bokoti nionso ya bapaya na makambo ya politiki ya ba Amerika. Na 1904, na bokónzi ya Theodore Roosevelt, mayéle ena ebakisamaki na likambo lyoko ezuaka kombo na ye, elingaki koloba Washington asengaka na makási lotómo ya koyingela n'Amerika ya latin po ya kobátela ba mbano na ye pe kosimba makási botélemisi (stabilité) pe molongó, na bokomi bôngó engumba ena "esika na ye ya bokónzi" (zone d’influence). Na ebándeli ya ekeke ya 20, mampinga y'Amerika bikotaki mbala mingi na Honduras, epái wápi ba kompani United Fruit Company pe Standard Fruit Company bazalaka bilombe ya botekisi bitabe, zambi ya kobátela ba mbano y'Amerika. Na 1912, bakangi Nicaragua, na bosáli mwá ekóló ya moke ekambemi na Washington. Likambo ya bangó ya koluka: kopekisa botongi nzelá yoko ya mai eye elingaki koboma engumba ya nzelá ya mai ya Panama, ezalaki na mabóko y'Amerika.

Bokweisi Letá na Guatemala

Simá ya ngonga yoko ya bopemi, na eleko ya politiki ya kozala malámu na moninga azali penepene na yo n'Amerika ya latin ematisami na Franklin Delano Roosevelt úto 1933, ebándeli ya Etumba ya malili ememaka bokwei ya mokonzi oyo aponamaka ya sóló, Jacobo Arbenz Guzmán, na Guatemala na 1954. Akwesamaka na mapumbulu (mercenaires) pe ba guérilleros na lisálisi ya CIA na likela lyoko ezuaka kombo ya "PBSuccess" sima ya bondimi mbongwana moko etáli bilanga eye ebebisaki ba mbano ya United Fruit Company (leló Chiquita Brands), ekitamaka na etuluku ya basoda ekambemaki na Carlos Castillo Armas. Mibú ntuku misáto ya bitumba ya ba civil bilandaki. Mosála ya liyébisi y'Amerika na bokwei ya Letá endimama na 2003, na kombo ya etumba libosó ya communisme (na eleko ena, Guatemala azalaka kosomba mindóki na bikóló ya communisme, mpenza na Tchécoslovaquie).

Bokiti na Monoko ya ba Ngúlu (Baie des Cochons)

Na 1961, esálemaki bokiti na kombo ya Monoko ya ba Ngúlu, na lisálisi ya John F. Kennedy. Basoda balingaka mokambi Castro te pe baye bakimaka babongisamaka na CIA balukaki kokweisa bokónzi ya Fidel Castro na bokiti na Cuba, kasi babenganaki bangó na limpinga ya Havane, na lisálisi ya bikóló ya communisme. Likambo lina ezalaka na ebándeli ya matata ya ba missile ya sánzá ya zómi elandi. O ebándeli ya mibú 1960, boningisi Brésil ememaka bokwei ya João Goulart (1964) pe, sima ya bolongoli mokónzi aponamaka, Juan Bosch, simá kaka ya sánzá sambo ya mosála, bokoti na ekóló Dominicaine o eleko ya ekela "Power Back", na boluki ya kopekisa, engebene n'Amerika, esanga ekoma "Cuba ya mibalé" (1965).

Chili y'Allende

Soki mibú 1970 pe 1980 bikangama na eye babengi "Opération Condor", - ekela yoko ya bosangisi ememanaka na lisúngi y'Amerika káti ya bakónzi ya mampinga y'Argentine, Bolivie, Brésil, Chili, Paraguay pe Uruguay, na boluki na koboma babóyi (opposants) to kaka balingi ya makanisi ya communisme- moko ya makambo ya makási ya mbongwana ya  bokónzi esálemaki na 1973 na Chili. Mokambi aponamaka, Salvador Allende, akweisamaka na makási na bobongisi ya CIA, yambo baboma ye. Akitanaka na etuluku ya basoda ya Augusto Pinochet, elongi yoko ya bokónzi ya bobomi. Engebene na mokánda moko ya Commisio ya ekóló po ya bosóló pe boyokani, na mibú 17 ya bokónzi bwa ye, ebima 'te motángo ya bato 3500 bakufaki, na bato koleka 30 000 bato banyokwami pe bakangemi ya politiki. Na mituya bina bibakisami bato ebelé bakima pe bakangema na lokutá. Basusu bamoni 'te motángo nionso ya bato bazuaka pási ezali likolo koleka.

Lisálisi na ba Contras pe balaki basoda na Salvador

Batungisami na bokoti ya molongo ya Nicaragua simá ya Cuba pe URSS, Amerika na bonkutu asálisa, káti ya 1982 pe 1989, ba "Contras", bato ya mobulu ya Nicaragua, na mosolo eútaka mwá moke na boteki mindóki na moyibi na Iran, po ya kokweisa bulamatari ya Sandino. Balaki (conseillers) ya basoda batindamaki na Salvador po ya kosálisa kokanga botomboki ya Front Farabundo Martí de libération nationale (FMAR). Likambo lina ebotaka etumba civil úto 1980 kino 1992 eye eboma bato koleka 70 000.

Bokoti na Grenade

Na 1983, ba Marines pe ba Rangers y'Amerika bayingelaki na esanga ya Grenade simá ya bobomi Ministre wa Yambo Maurice Bishop na etuluku ya basoda, na eleko ya ekela "Urgent Fury". Balobaka, ezalaki po ya kobátela ba nkóto ya bato y'Amerika, kasi na bosóló, ezalaki ya kobundisa bokónzi ya basoda Hudson Austin. Pe na 1989 ekela ya súka ya loléngé ena yambo ya Venezuela, Amerika esali mobulu elobamaki na Panama na bokambemi ya George Bush tatá, na eleko ya ekela "Just Cause".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

09 sánzá ya yambo 2026, 15:57