Olena, úto Italie kinó Ukraine, po ya kozala pembeni na baye bakokufa na etumba
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Úto 2008, Olena azalaki na Italie. Simá ya mibú sambo, azongaki na Ukraine, pe azongaki lisusu na Italie. Kasi o ebándeli ya etumba, ayokaki 'te esika na ye ezali epái na ye. Na tóngo ya ebándeli ya bokoti, mama na ye abengaka ye. "Mwána na ngai ya mwási, etumba ebándi epái na bisó", ayebisaki ye na nzelá ya singa. Na kotatabana te, Olena ayanoli: "Mama, yaka epái na ngai". Akanisaki ndeko na ye ya mobáli pe na bána na ye ya mike. Kasi eyano ya mama na ye ezalaki sémba: "Te, mwána na ngai, tokokende epái te". Maloba biye bikomaki po na ye mbela moko o ntéi ya ye.
Abándaki mbala moko kobongama ya kokende, atá mikakatano. "Nazuaki mokáno ya kozonga epái na ngai, atáko motindo moko te ya bomemi ezalaki te", elobaki ye. Simá ya bozui motuka eye ememaka ye na ndelo, akobaki na makolo kinó na Lviv. Na bokambi ekeseni, milongo ya bato bakokima bizalaki molayi. Mbala moko akomaki epái na ye, mama na ye ayambi ye na bokamwi. "Oyei po na nini?". Eyano eúti na makambo: mokolo ya yambo elandaki, elenge mwási amilakisi na esika ya bokomisi kombo na limpinga. Simá ya bozeli, na 23 ya sánzá ya misáto 2022, Olena akendeki po ya limpinga ekelamaki sika, azali nanu waná lelo eye. Azali monganga ya limpinga, lifulume mokónzi ya mosála ya kolongola. "Po nayekoli lifulume", elimboli ye.
Bokási eye eúti na Nzámbe
Olena atikala kotia tembe te na mokáno na ye. Kasi, bosóló ya etumba emonani makási koleka ndéngé ye akanisaki. "Pási ya moto ezali na mozindo koleka eye nakanisaki. Kotála mokolo na mokolo bato bazoki makasi ekopesa pási atá na baye babongama na mosála. Tángo omoni moto moko na maboko te to makolo te, ezali kaka pási. Kasi tángo omoni yangó mbala ebelé kaka na mokolo ená, waná ekomi mpenza pási. Pe ezali kaka ebándeli". Olena ayébi 'te po na mingi ya baye bazoki, nzelá ekozala molayi, etiami elembo na mikakatano misusu pe ba pási. O ntéi ya nionso waná, andimi liziba lyokó ya bokási eye eleki makoki ya bato. "Ezali kaka Nzámbe oyo akopesa ngai makási mingi".
Mapapu bikobima
Po na baye bakolekisa mikolo, ba posó, ba sánzá, atá ba mibú na etumba, ezali pete te ya komiyeba, atá soki bopemi epesameli bangó. Olena alobi 'te na 2023, azalaki po ya mbala ya yambo na mwángo ya bozongisi ebengami Repower. Atá na mikolo zómi ya linaka, bopemi emonanaki mosika. " Tángo mosusu ezalaka loléngé lyoko ya bobateli", elobi ye. "Molimo eyébi 'te esengeli kozonga na etumba pe ekosálisa yo te mpenza ya kotelema". Bokási po ya kokende libosó ekoúta na ba loléngé ebelé: mpizoli, lisálisi ya bandeko – lokóla ndeko moko avandaka na Italie - pe ya boyambi. Ezali na bileko esika wápi, atá makasi nionso, moto moko akufi. "Na makambo ya boye, okoyoka olembi. Okomituna "po na nini?". Tosalaki nionso eye tokoki kinó ngonga ya súka".
Kasi pembeni ya pási, Olena atatoli lokóla ba ngonga biye abengi makamwisi ya sóló. "Ekosálema 'te moto moko akomi na elembo moko te ya bomoi pe, na lisálisi ya Nzámbe pe na misála ya bozongisi péma, azongi na bomoi". Na bileko bina, nguyá ya sika ebotami. "Ezali lokóla mapapu bibotami pe okozua makási ya kosála mingi". Bobungisi baningá na yo pe ya bilombe bakweyaki na etumba ezali na kilo lokóla pótá moko efungwami, kasi ezali na ndambo ya litomba na bilembo ya elikya. "Soki moko azongi na bomoi, toyébi 'te tosáli nionso eye esengeli".
Kokúmisa mbótama ya Yézu
Boyambi ekosála elongo na Olena mokolo na mokolo ya etumba. "Nandimaka Nzámbe mingi. Pe nandimaka kála yambo ya etumba". Tángo akutani na makambo ya pási ya kondima te, abaluki epái na Ye: "Tángo mosusu, nalobi: po na nini mwána mobáli eye abiki te? Azalaki nanu elenge". Kasi ayébi 'te Nzámbe azali na ba mwángo: "Ezali pási ya kososola, kasi Nzámbe azali na ba mwángo na ye". Eleko ya Mbótama ememi Olena ya kokanisa libótá na ye. Akoyoka kilo ya bobángi na bangó, kasi akobatela kimia na bangó: "Nasololaka mingi na vidéo, kasi nalingi koyébisa bangó makambo nionso te po ya koyokisa bangó pási mingi te". Noko na ye ya mwási ya moke apesaka ye bokási na losámbo na ye ya bomango (innocente): "Tatá mwási, tika 'te Nzámbe abatela yo, yo na baye bansó bazali na yo kúna". "Losámbo ya bána ezali na ntina makási", elobi ye. Atá na tángo ya etumba, Olena na baningá na ye bakozua bileko ya elikya pe ya molimo. "Mobú moko moko, tokolamba kutia (bilei ya momeseno ya Mbótama na Ukraine). Nzámbe apesaki bisó likoki, atá áwa, ya kokúmisa mbótama ya Yézu, oyo asengeli kobotama na motéma ya moto moko moko". Atako mosika na libótá na ye, Olena andimi ngrásya ya kozala na baye bakomi libótá na ye ya sika: "Ezali mayéle (raison) moko ya kozala na botondi na Nzámbe po ya libakú liye".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.