Luka

Mosala ya bpkeli ùakénga na  Sierra Leone, Mosala ya bpkeli ùakénga na Sierra Leone,   ((©Marco Palombi))

Nzinganzinga, likambo ya ntina koleka na Sierra Leone

Mwángo mókó ezuaki mosolo na programme ya Pótó na kombo "Dynamiser le développement" pe esálemi na lingomba y’Allemagne GIZ, na bosáli elongo na fondation ya Italie AVSI, esalisi ya kosála matuka bikoki kobunda na bobébisi ya nzinganzinga pe ya kobátela bokolongono ya mabota mibimba.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

"Esengeli kolinga ekóló na yo», elobi Doreen na koseka yókó. Amilakisi: "Nazali na mobú ya sika na nzebi ya politiki, áwa na etuka; thèse na ngai etali botútani (impact) ya ba coup d'Etat ya basoda na Afrika ya Westi, likanisi lyoko na etumba na kanyaka, posa ya botelemisi (stabilité), makoki ya bato". Makambo-makonzi ya biténi mingi, ezanga bosóló eyebani, bilobani na makanisi na simá ya motó te.

Na Doreen Sambo, tosololi na eténi ya ndáko ya université te, kasi na esalelo ya mekaniki mókó, pembeni na nzelá, libosó ya mesa mókó na ba malato. "Kolinga ekóló na yo", eye ezali Sierra Leone, ekoki kosálema na mosála. Doreen alakisi biloko mingi ya kosangisa po ya kosála matúka ya bosáli elamu, misáto na mokolo, 20 na póso.

Bomipesi po ya bato pe litéya po ya nzinganzinga

Na esalelo ena pe na misusu na Bo, etuka ya ibále ya Sierra Leone, bayékoli ya bási ya "Likanisi ya bomatisi ya nguyá (énergie) pe ekelá ya bána bási" bazali na bogumbi, na soudure pe na bomeki. "Makénga (fourneaux) na bisó bikozua 60% ya makála moke na botáli bolámbi na móto makási, na makolo misáto to loléngé mosusu ya bonkoko", elimboli Doreen. "Eloko tokoluka ezali ya kokitisa bobébisi pe mólinga, biye bikoki koboma, mingi mpenza o eleko ya ba mbúla, tángo bokotikala na káti ya ba ndáko ya manzanza".

Esengeli kotála likambo yangó pamba te. Ekomonana n'Afrika, dioxyde ya carbone pe ba ngenge (poisons) bibimi na bolámbi na móto makási bikoboma mobú mókó mókó bato 600 000, mingimingi bási na bána. Pe Sierra Leone ezali na katikati (moyenne) y'Afrika: na ekóló, koleka mabótá minei likoló na mitáno bakolamba na makála pe na ba nzeté.

Bokónzi ya bási

Kasi makénga bina ya sika bikotekisama malámu? "Na katikati, tokotekisa yangó 60 na sánzá", eyanoli Doreen Sambo. "Na motúya káti ya 200 pe 300 leone, koleka basusu, kasi bikoúmela mingi pe bizali na bosenga makási, mpenza kaka na koloba: tokoluka tobimisa makénga 1000 na mobú". Mosála pe boteki bimáti likoló ya lisálisi ya mokili, mpenza na likanisi lyoko ezuaki mosolo ya programme ya Poto: "Dynamiser le développement", pe esálemi na lingomba y'Allemagne GIZ elongo na fondation ya Italie AVSI eye ekosála ba mwángo ya boyokani na bomátisi pe ya lisúngi na bikóló 42.

Bokitisi ya bobimisi

Na Freetown, pembeni y'Atlantique, na ba ngómbá, ba ndáko na ba balcon pe ba patio ya mabáyá na loléngé ya eleko ya ba colon bikokoba kobima, nzokándé ba bidonville bikokende epái ya mabongo biye bikozindama tángo esusu n'Atlantique. Yókó ya likambo ya ntina bakónzi bamoni ya kosála ezali ya bokoni nzeté. Mwángo mókó ebotami eye ya kobongola mboka-mokónzi, esálema na 1792 na baúmbu batikamaka, na "Treetown", "etuka ya ba nzeté". Engebene na Gianni Bagaglia, motindami ya fondation AVSI na Sierra Leone, lisálisi na bobimisi makénga ekangami na mayéle ena. "Eloko ekóló ekoluka", elobi motindami, "ezali ya kondimisa loléngé esusu ya bolámbi ebongi po ya milio mókó ya mabótá úto lelo kinó 2030".

Ba mwángo ya botelemi na klima

Etumba na bokáti nzeté elobamaki na Stephen Mulbah ya programme "Dynamiser le développement". "Botómboli ya makénga ya sika ekoki kosálisa ya kokitisa motángo ya nzeté pe ya makála bikosálemaka po ya kolamba", elobi ye. "Na súka, yangó ekosálisa ya kobikisa ba nzeté pe kokitisa bokási ya dioxyde ya carbone, na makámá ya bozindi moke pe botelemi monéne na klima". Engebene na Mulbah, ezali lokóla na lomeko ya bato, ekangemi na bokokani ya ba kónzo (chance) : "Eleko ya kúku ekokita, eye ezali malámu po bási ebelé, nzokándé bobimisi ekopesa misála pe mabakú ya bokeli misála".

Mabakú atá po ya bato balemba koleka

Na Kenema, etuka yókó moke ezali na ngonga mókó ya nzelá ya Bo, na esika yókó ya ba ngómbá pe zamba, tokutanaki na Lamin Sesay Kamara. Na mibú 40, akendeke na etéyelo yókó ya mosála epái wápi bibósónó bakoyékola mosála ya bibendé. "Nakolóta", alobi na boseki, "nazui ndáko ya mombóngo na mwási na ngai pe bána mibále ya ngai". Lamin abungisa makolo na ye likoló ya bokono ya búkabúka pe akomaka etiké o eleko ya etumba ya civil eye eboma bato 120 000 na Sierra Leone káti ya 1991 pe 2002. Akokende na etéyelo úto mibú mibalé: áwa, akosála makénga na coopérative yókó ebengami Lisangá ya bási na zando ya Hopanda. Ye lokóla, alobi yangó te kasi ekomonana, alingi kobátela ekóló na ye.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

28 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 12:27