Luka

Ndako-Nzambe  grecque melkite Ndako-Nzambe grecque melkite 

Na Taybeh, esengo ya Mbótama ekimisi mwá moke bobángi ya lobi

Etuka kaka yókó mobimba ya bakristu na Cisjordanie, Ephraïm ya biblia epái wápi Yézu amibombaka, ekobongama po ya kosepela boyei ya Mokónzi na motindo mókó ekabwani káti ya esengo ya féti pe bobángi ya mobúlú ya sika ya ba colon ya Israël.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Na mwá mikolo yambo ya Mbótama, bakambi ya Israël basakoli bokeli ya ba colonie 19 na Cisjordanie. Mokáno mókó elakisami na bulamatari ya Israël po ya kokanga "bosáli ya Letá lyokó ya Palestine ya bobángisi". Na eleko yókó ya bokolisi ba colonie úto mobúlú ya Hamas ya 7 ya sánzá ya zómi 2023, pembeni ya etuka ya Gaza, nsakola ena ememi na 69 motángo ya ba colonie bisálemi mibú misáto miye mileki na Cisjordanie.

Ezali na káti ya bobéndani ndé bakristu ya Palestine bakobongama po ya kosepela Mbótama. Na Taybeh, etúká kaka yókó mobimba ya bakristu ya Cisjordanie, mobúlú ya ba colon ekosálema mbala na mbala. Batiaki móto na mituka 5 ba posó bileki, elobi sángó Bashar Fawadleh, sángó-mokonzi ya mboka, pe mingimingi, na sánzá ya motóbá elekaki, móto mókó monéne etumbaki mabelé ya bilanga pe eyindisaki bifelo ya esika ya kála ya ndáko-Nzámbe grecque melkite, na bizibeli ya ba ndáko. Baí-mboka bakofúnda motindo mókó ya bozangi etumbu ya makambo maná, bokomi simá ya limpinga ya Israël, eye ezali na mokumba ya bobateli na esika ena, pe mayéle ya ba colon.

Ndéngé mókó emekama

Baí-Cisjordanie bakomona na bokeli ya colonie nionso ya sika motindo kaka waná: mabelé bitumbami, boyei ya ba molongó ya ba ngombé to bamémé, mituka ya yambo, ba bungalow ya yambo, bendele ya Israël etelemi na káti pe ekomonana malámu, na simá ba ndáko ya libosó. Yangó waná na ba sánzá moke, bisika ya sika bifungwami mingimingi na likoló ya ba ngómbá, yambo ya kokoba bopanzani na yangó na mabelé ya Palestine. Na Taybeh, bakambi bakristu bapona ya koyanola na mobúlú te na misála ya bobangisi. "Tokobóya na kimia", elobi Jack Nobel, sángó-mokonzi ya paloise grecque melkite ya Taybeh. Kinó sik’oyo, moí-mboka azoki te to babomi ye te, ebakisi sángó Bashar. Na bituka ya pembeni, ya ba musulman ebelé, makambo ya mobúlú biboma bato pe bizokisa. Bansó bakobanga 'te likambo lyokó ya mabé esálema na Taybeh lokóla. Bakambi katoliko pe orthodoxe ya mboka, baye bakosálela boyokani malámu, bakosála makási ya kotéya mobéko ya mobúlú te kinó na bitéyelo na bangó.

Mbotama makasi koleka bobangi 

Ata bôngó, ezali bozeli na esengo ya Mbótama ndé eleki. Na misa ya eyenga 21 ya sánzá ya zómi na mibále, sángó-mokónzi ya paloise ya Taybeh ayambaki mwá bato ya ekolo France. Mgr Hughues de Woillemont, mokambi ya Œuvre ya Orient, na mokambi ya Lisangá Jean Yves Tolot pe sángó Christophe Le Sourt, secrétaire général ya Lisangá ya baepiskopo ya France, bazuaki mokáno ya komema lisálisi na bangó na bakristu ya Taybeh, pe ya kosepela na bangó mbótama ya Kristu. Na masangá masusu, Œuvre d'Orient akomema lisálisi ya mosolo po ya ba mwángo ndéngé na ndéngé po ya kosunga bobateli ya masangá ya bakristu bazali waná, po bozangi mosála, ya nini ekoki kosálema lobi pe likoló ya bozangi bokengi, bokei ya bakristu ekozala likambo lyokó linéne. Na mibú mibále milekaki, mabótá 15 babimaki Taybeh po ya boluki bomoi bokó ya malámu epái ya bapaya, eyoki mawa sángó Fawadleh, libótá lyokó lisusu, melkite, ekobima na mboka yambo ya suka ya mobú. Malembe malembe, bato bakosila na etúká ena ya Palestine eye ezali leló na bato 1400.

Eyenga na tóngo ya 21 ya zómi na mibále, bandimi mokama bazalaki na misa, na ndáko-Nzámbe ya etúká úto bokoti na Adventi. Eliyelo yókó etelemi libosó ya lotale. Bikelakela babongisi bikobenga ya kokabola esengo ya sik’oyo, pe ya kobosana, tángo ya Mbótama, bokáneli eye ezali likoló ya lobi ya bakristu na mabelé ya Kristu.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

22 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 16:48