Luka

Mondimi katoliko moko na losambo Mondimi katoliko moko na losambo 

Mbótama na Uvira, na elilingi ya bobángi kasi ya elikya lokóla

Na monyele ya Congo-Kinshasa, ezalela ya bobateli ezali mabé makási na etuka ya Uvira, ezuami mosika te na ndelo ya Burundi. Nzokándé, póso elekaki botomboki ya M23, basoda bisálisami na Rwanda, elobaki bobimi na ye, kasi, bitumba bikokoba kaka. Po ya bakristu baye bakobongama ya kosepela Mbótama, likambo ezali pási. Lokóla etatoli abbé Dominique Alama Pona, sángó ya dioceze ya Uvira.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Bakristu ya Uvira, na monyele ya Congo-Kinshasa, epái wápi bitumba bikokoba, bakobika na bobángi. Atako mampinga ya AFC/M23 balobaki babimi, basálisami na Kigali, bitumba ya sika bibandi mokolo ya yambo 22 ya sánzá ya zómi na mibalé na etuka ena. Bobeti masasi waná bikoleka káti ya batomboki ya AFC/M23 na babúndi Wazalendo, basangani na bakambi ya Kinshasa.

Lisoló na abbé Dominique Alama Pona, sángó ya dioceze ya Uvira.

Mbótama mókó pási ya kosála

Na nzelá ya singa, abbé Dominique Alamo Pona, sángó ya dioceze ya Uvira, atatoli ezalela ya bozangi koyéba pe ya bobángi eye ezali kúna. Etuka elamukaki na 22 ya sánzá ya zómi na mibalé na ba "bobeti masasi bikoúta na ba ngomba biye bizali likoló ya Uvira". "Ezalaki bobeti masasi mokolo mobimba, úto ngonga ya 8 kino 18. Mindóki ya kilo pe ya pépélé. Ezalaki mokolo mókó ya pási koleka", elobi ye, na bosemboli 'te na etuka ezalela (situation) ezali "kwokoso". Po, elimboli sángó-mokonzi, "toyébi te na sóló nani akotála nini".

Leló, "bato bakobika na bobángi po ya ezalela ya bobateli". Abbé Dominique Alama Pona abimisi 'te "bato bakimi bisika bizali penepene na bitumba". "Paloise na ngai, ekobaki ye, ezali esika ya bitumba". "Sik’oyo bato bansó bakimi", elobi ye, na bobakisi azui esika ya kobombana epái ya baningá.

"Nionso ezali molili"

Na Uvira, bakambi ya etuka "bazali te". "Nanu batie eyangeli áwa te, pe bato bakomeka kokoba misála na bangó, kasi kaka na bobángi 'te nionso ekoka kobongwana ntángo inso", ebakisi ye. Ata "ba pulúsi bazali na bilamba ya moyindo", "nakoki koloba ya sóló to te 'te M23 abimaki", elobi ye polélé, "nionso ezali molili".

Simá ya kobotola bituka ya minéne ya Goma na sánzá ya yambo, na simá ya Bukavu na sánzá ya mibalé, AFC/M23 ebándaki na ebándeli ya sánzá ya zómi na mibalé etumba ya sika na engumba ya Sud-Kivu, na ndelo ya Burundi, o eleko Congo-Kinshasa pe Rwanda bazalaki kotia mokoloto ya boyokani ya boboto na lisálisi ya mokónzi Donald Trump. Na 10 ya sánzá ya zómi na mibalé, etuluku ya AFC/M23 ezuaki Uvira, etuka yókó ya bato ebelé eye ekosálisa ya kotála ndelo ya mabelé na Burundi, moningá ya limpinga ya Kinshasa.

Mbela mókó ya boboto pe ya bosálisani

Libosó ya ezalela ena, abbé Dominique Alamo Pona, yambo ya mbótama abwaki mbela po ya boboto. "Tolembi ezalela eye, pe tokolikya 'te Mwána ya mokónzi ya boboto akomemela bisó kimia yókó ya seko", esakoli ye. Alobi lokóla liséngisi ya lisúngi po ya baye babungisi nionso na bitumba. "Ezali na baye babungisi biloko na bangó, pe na baye babungisi bilama ya libótá na bangó. Esengeli na lombango 'te bato ya motéma molámu basálisa baye bazali na bosenga", elobi ye, yambo ya kolaka baí-Uvira ya kotika pási na bangó na Mokónzi.

Sángó asengi lokóla na bandimi ya kotika móto ya boyambi pe ya elikya epela. "Ezali eleko yókó ya Mbótama ya pási, kasi tokosambela po 'te boboto ezonga na bomoi na bisó", esúkisi ye, na bobengi bandimi ya paloise ya kosangana na losámbo, atá na eleko ya bozangi koyéba pe ya bobángi.

 Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

25 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 06:47