Episkopo ya Sydney atelemeli "mobúlú moko na bisó bansó"
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Eye esengelaki kozala eleko yókó ya féti po ya lisangá ya bayuda na mokolo ya yambo ya Hanoukka ebongwanaki na mawa: na moke bato 16 babomaki bangó, káti na bangó mwána mókó, pe bato 42 bazokaki na bobeti masasi mókó na zelo ya libongo ya Bondi na Sydney, na Australie, na pokwa ya 14 ya sánzá ya zómi na mibalé.
Lisangá ya bayuda ezali na motéma ya kopasuka pe, na ye, ekóló mobimba. Sángó-mokónzi ya ba ndáko-Nzámbe Sántu-Anna pe Sántu-Patrick, bizuami pembeni na zelo ya libongo, alobi mawa eyokami, bobángi na ye po ya bilenge ya lisangá, po Sydney ezali na "bato mingi bazali bilenge" pe "mingi káti na bangó bazalaki na esika ya zelo ya libongo na eleko ena". Moko na bangó abengaki ye tángo akokima masasi.
Po ya mingi, molulu ena elamuisaki ekundoli (souvenir) lyokó ya pási, po na sánzá ya minei eleki, mobúlú mókó esalemaka na Bondi Junction, na bobomi bato motóbá, káti na bangó moto abetaki masasi. Sángó-mokónzi ya paloise alobaki 'te bato misusu babangaka 'te mobúlú ya ndéngé waná "ekoma ya tángo insó na bomoi na bisó"
Nsámbo po ya bato bayoki pási
Po ya kotatola bosálisani (solidarité) na ye pe kopesa lisálisi na ye na bato bayoki pási, bosáli elongo na bakambi ya bayuda ya esika waná, ba ndáko-Nzámbe ya Bondi bitikali ya kofúngwama mokolo mobimba, pe bato bakotaki kúna ebelé mokolo ya yambo.
Mokolo ya eyenga na pokwa, misa moko ya bokanisi esálemaki po ya baye bazuaki likámá pe na baye babiki. "Ezalaki na bato ebelé, pe bato baúmelaki mingi simá ya misa po ya kokúmisa Sakramento-Esántu", elobaki sángó Robbie. Akosénga na moko moko epái wápi ye azali na mokili ya kosambela po ya bolendisi pe libondi ya bato "baye nanu bazzali na kanda, bobángi pe motéma likoló libosó ya ezalela áwa".
Boyini bayuda esengeli esila
Episkopo ya Sydney abimisaki nsakola yoko mokolo ya yambo, na bolobi 'te mobúlú ya bobángi "esengeli komema na mbongwana moko".
Na nsakola na ye, Mgr Anthony Fisher abengaki mobúlú ena "nsóni ya polélé pe ya motéma mabé po na bomoi ya moto", pe na bobengi lokóla boyini ya bato basusu po ya bayuda ya "mabé elobamaka te eye esengeli ebwakama na baí-Australie bansó". Alobaki 'te mobúlú nionso na moyuda moko ezali mobúlú na lisangá ya bayuda nionso.
Mobúlú nionso ya ndéngé waná ezali "nsóni yoko na loléngé ya bomoi na bisó lokóla baí-Australie" pe "esengeli kotelemela yangó na kokákatana te pe bosémbo esengeli epesamana lombango po ya baye bazui likámá".
Mgr Fisher alobaki 'te na mibú mibalé bilekaki, ezalaki na mopepe moko mabé ya boyini bayuda epesaka esika ya bobangisi, ya bokabwani, ya bobimi pe "ya kobongisa lokota lyokó ya kopelisa móto". Bikela biye "bibakisi bobéndani. Yangó esengeli esila".
Na ndéngé ya ye mei, episkopo alobaki boni boni mobúlú ena etutaki ye po mama-nkókó na ye azalaka moyuda. Kasi bakristu bansó basengeli kobika bôngó bangó moko po, ekobaki ye, "bazali bána ya bayuda. Po na waná, mobúlú moko na bayuda ezali mobúlú moko na bisó bansó".
Ntembe moko po ya bakatoliko
O ntei ya mawa ena, Mgr Fisher abimisaki mwá "bilembo ya bolámu" na "mpiko ya kokamwisa eye bapulusi balakisi, bakumbi ya mituka-bakoni pe basálisi, na baleki nzelá lokóla, pe likabo ya molimo ya baye bapesaki lisúngi na bangó na bato bazuaki likámá".
Alakisaki mawa na ye na lisangá mobimba ya bayuda pe alaki ye na nsámbo na ye. "Tolingi baningá bayuda pe baye bazali penepene na biso, pe tosengeli kosála nionso ekoki na bisó po kolaka bokengi na bangó", elimbolaki episkopo ya Sydney.
Asúkisaki nsakola na ye na elaka yoko: "Lisangá katoliko ekobakisa makási po ya kobunda na boyini bayuda na botéyi na lisákoli". Lisangá katoliko ya Sydney epesi misála ya kotéya pe ya toli na bayuda ya pembeni na bokobi kosála misála po ya bawa, baye bazoki pe baye batungisami na molimo.
Mgr Fisher alakisaki 'te Hanoukka pe Mbótama bisálemaka o eleko yoko pe bikotia na káti boyambi, libótá, mabonza pe mwinda. Asámbelaki po 'te Nzámbe "apesa bwanya na bakambi na bisó pe akabola libiki pe elikya na lisangá na bisó na eleko eye".
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.