Luka

Libota lyoko ya balongoli pembeni ya mboka Togota Libota lyoko ya balongoli pembeni ya mboka Togota  (AFP or licensors)

Congo/Kinshasa: Unicef eleli bolongoli ebelé ya bana

Lingomba ya ONU etalaka makambo ya bana, eyebani na kombo ya Unicef, ebwaki mbela na kwokoso eye ba nkama ya bana bazali na likama, na monyele ya Congo-Kinshasa. Koleka bana 100 000 balongoli bangó úto mokolo ya yambo ya sánzá ya zómi na mibalé

Vatican News

Na communiqué moko ebimaki mokolo ya yambo 15 ya sánzá ya zómi na mibalé, Unicef alobi "bobángi makási" ya ye na bobuti na lombango ya bitumba na Kivu ya Sudi, na monyele ya Congo-Kinshasa, eye na makasi etindi bana pe mabota na bango kokima po ya koluka bobateli, o ntéi ya Congo to mosika na ba ndelo ya ekolo, na Burundi to na Rwanda.

Bolongoli ebelé

"Úto 1 ya sánzá ya zómi na mibále", elobaki Unicef, "bitumba ya makási bilongoli koleka bato 500 000", káti na bango, koleka bana 100 000 kaka na Kivu ya Sudi. Mabota mingi bikimi na káti ya ekolo to bakatisi ndelo, na Burundi pe na Rwanda. "Na bopanzani ya mobulu, motángo ya bolongoli ya bato esengeli komáta lisusu", ekebisaki lingomba ya ONU. Kobánda 2 ya sánzá ya zómi na mibále, etangami ba nkama ya bato ya likama, kati na bango babomaki bayékoli minei. O ntei ya mbemba misusu bitáli bána, etangami bana kelasi motoba bazokaki pe mobulu na moke bitéyelo sambo, káti wana biténi ya etéyelo bibebi to bikwei. Bato ebelé na bokimi mobulu bakatisi ndelo ya Burundi, mpenza "koleka 50 000 ya bato bakomi kuna sika káti ya 6 pe 11 ya sánzá ya zómi na mibale kaka"; penepene ya ndambo bazali bána. "Bana basengeli ata moke te kofuta motuya ya etumba yoko", esukisi communiqué ya Unicef.

Mobulu ya batomboki ya M23 na Kivu ya Sudi ekokoba

Na communiqué yoko ebimaki na butu ya mokolo ya liboso 15 pe ya mibalé 16 ya sánzá ya zómi na mibalé, M23 asakoli bobimi na ye na etuka ya mibalé ya Kivu ya Sudi, na bosengi "bolongoli ya mampinga", "bobateli ya bato na ye" pe "botáli ya bozimi-móto na bokotisi limpinga ya ekolo mosusu".

Póso eleki, simá ya bokoti na bango na etuka ya Uvira na kobunda te na mampinga ya bulamatari -engebene na batatoli-, babundi ya M23 babotolaki lokola etuka ya Makobola pe ya mboka Kasekezi, sima ya bobundi na babundi Wazalendo. Engebene na ba média ya Congo-Kinshasa, batomboki, bafundami ya bozui lisungi lya Rwanda, batiaki mobulu na bisika ya ba Wazalendo na Kasekezi, eye ezali na kilometele misato ya Makobola, pe balalaki waná. Botáli ya Makobola ekoki kosunga batomboki ya kokende na bingumba ya Maniema pe Tanganyika, na boleki na nzelá ya ekolo 5 pe na etima Tanganyika.

Bobéndani ya bikolo

Bozui ya Uvira, pembeni ya ndelo ya Burundi, elamuisi lokola bobendani ya bikolo. Rwanda eye ewangani likambo ya kopesa mosolo na M23, apesaki bozongeli bitumba na mampinga ya Congo-Kinshasa pe ya Burundi. Mokolo ya póso 13 ya sánzá ya zómi na mibalé, Patrick Busu Bwa Ngwi, alakisami lokóla mokambi ya Kivu ya Sudi aponamaki na M23, alobaki 'te mampinga ya Burundi baye bazali na engumba, basengeli "kobima na etuka pe kozonga epái na bango na kimia". M23 asakolaki lokola kozala "na ba nkáma ya ba soda ya Burundi bakangemaki o eleko ya bitumba".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 22:25