Na Roma, Mahmoud Abbas akomanyola libosó ya lilita ya François
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
Banda bokomi na ye na Roma, mokambi Mahmoud Abbas alingaki kokende na lilita ya François na Sainte-Marie-Majeure po ya ngonga yoko ya ezuzunu. Na bokengi makási, na ngonga ya 16 na ndambo, mokambi ya Bokonzi ya Palestine, elongo na sángó Ibrahim Faltas, sángó molandi ya kála ya Custodie ya Mabelé Esántu, pe nzinganzinga na ye, alekaki ekuke ya basilique po ya kobima kúna simá ya pembeni ya ngonga yoko. Mahmoud Abbas atikaki liboké ya mbe na lilita ya mabanga ya mpémbé ezali na likomi Franciscus.
Nsakola epai na bapanzi nsango
Alobaki na bapanzi nsango bazalaki kozela ye libanda 'te ayaki "kotála Papá François zambi nakoki kobosana te eye ye asala po ya Palestine pe bato ya Palestine, pe nakoki kobosana te 'te andimaka Palestine atá moto asengaka ye te asala yangó".
"Na bokundoli mibú zómi ya boyokani enéne káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo pe Letá ya Palestine", etiamaka maboko na 26 ya sánzá ya motóbá 2015 pe ezua bokási na 2 ya sánzá ya yambo 2016, elobamaki kútu na Papá Léon XIV o eleko ya bosololi na nzela ya singa na mokónzi Abbas. Na 21 ya sánzá ya sambo, lisoló na bangó ya yambo elobaka loléngé likambo ya bowelani na etúká ya Gaza pe mobulú na Cisjordanie. O ntángo ya lisoló, engebene na communiqué lyoko ebimaka mokolo ena na ndako ya makita ya bapanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Papá alobaki lisusu mbela na ye po ya botosi sémbo endimami na mokili po ya bato, na bobakisi lotómo ya kobátela ba civil pe bisika bisántu, na bobakisi lisusu bopekisi ya kosálela miso ya kokangama bokási pe ya kotinda bato na makási epái esusu.
Úto mobulú mabé ya Hamas na 7 ya sánzá ya zómi 2023 pe eyano ya Israël na Gaza eye etiya elembo ya bobandi bowelani, ba mbela káti ya Vatican pe Ramallah bizali bebo.
Lobi na tongo, mokolo ya minei 6 ya sánzá ya zómi na yoko, Mahmoud Abbas akokutana po ya mbala ya yambo na Papá Léon XIV na Vatican, pembeni na sánzá moko simá ya bokóti na bokási ya boyokani ya bopémi na etúká ya Gaza.
Mibémbo ya kála ya Mahmoud Abbas na Vatican
Mobémbo ya Mahmoud Abbas mokolo ya minei eye ekozala ya yambo te. Akutanaka na Papá François mbala ebelé káti na mibú. Eleki mibú 11, na 2014, Papá abengaka mokambi ya Bokonzi ya Palestine ya kozala pembeni ya mokonzi ya Israël ya eleko ena, Shimon Peres, na losámbo lyoko po ya boboto na Moyen-Orient. Na bilanga ya Vatican, balonaka nzete yoko na patriarche œcuménique ya Constantinople.
Mahmoud Abbas ayambamaka lokóla na François na sánzá ya zómi na yoko 2021 to na sánzá ya zómi na ibále 2024. Mokolo ena, o eleko ya mobémbo ya súka ya mokambi ya Bokonzi ya Palestine na Vatican, ezalaki likambo na Secrétairerie ya Letá ya lombango esengeli po ya "kobikisa na likambo ya pási ya bato na Gaza" pe ntina ya kokoma, na lisoló pe na diplomatie, na eyano ya Bikolo mibále, na bokébi 'te Yérusalem, mboka mbala isáto esántu, ebátelama na mwángo moko ya motindo mosusu.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye