kaminyó ya libula Mesopotamia kaminyó ya libula Mesopotamia  

Na Irak, kaminyó ya libula Mesopotamia ekotámbola na ekóló po ya kotónga bomoko

Na elanga ya monastère ezuami na etando patátáló ya Ninive, na Irak, Radio Vatican-Vatican News akutani na ekipi ebandi « kaminyó ya libula Mesopotamia », eye ekotámbola ekóló zambi ya kosangisa bato ya Irak na misisa ya bankoko na bangó

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

 Na mesa mókó molayi na libanda ya monastère ya Mar Behnam, na etando patátáló ya Ninive, na Irak, etuluku ya bilenge ekopakola mokóbo. Bakosála bitando ya mike bikolakisa bilembo ya bonkoko ya Irak: oud yoko, kópo yoko ya thé ya menthe, mosquée mókó, ndáko-Nzámbe yoko, ziggourat ya Ur.

Likambo liye esálemi na likanisi "kaminyó ya libula Mesopotamia", eye ekotámbola na Irak po ya kobongisa matéya pe bisalelo ya bonkoko pe lisapo ya ekóló. "Likambo tokoluka ezali ya kosálisa bato ya koyéba kiloléngé na loléngé (diversité) ya Irak", elimboli Muthana al-Khoury, mokambi ya likanisi Kaminyó ya libula. "Bituluku mingi bafandaki áwa ba mibú ebelé, pe tozali kaka waná leló"

Kotónga lisusu bomoko ya bato

Kaminyó etamboli Irak mobimba, kasi ba mboka mingi ye etáli bizali na nordi ya ekóló, esika lyoko eye, na 2014, ezuamaki na makási koleka na etuluku Letá islamique. Bilama ya ba loké (minorités) ebelé ya Irak (bakristu, ba Kurde, ba Yézidi, ba Shabak pe basusu) na makási basengelaki kokima Letá islamique, pe bisika na bangó bisántu bibebisamaki.

Leló, mibú mwambi simá ya bokwei ya Daech, ba loké yangó misusu babandaki kozonga. Kasi, mosála ya kotónga lisusu bomoko ya bato ya Irak etikali pási. "Tángo tokokende na mboka moko epái wápi bituluku kilikili ya biyamba bazali kobika lisangá, tokosalisa bangó bansó ya kozala", elimboli Muthana al-Khoury. "Tokomeka komema bangó ya kosolola baye na basusu, ya kozala elongo na milulu".

Milulu miango mizali mbala moko ya maloba pe ya mosála, bokobanda na matéya bitáli lisapo pe archéologie ya Irak kinó bisalelo ya bosáli ekeko pe ya bopakoli mokóbo.

Mokambi ya Mesopotamia Heritage pe mokómi-moto ya mobémbo ya France, Pascal Maguesyan alimboli nini bakoluka: kosepelisa bána pe mikolo na libula ya ekóló,  po ya kopesa ndanga 'te bato bakoya simá babatela yangó. Lisangá ya ekóló France ebimisaki likanisi ya Kaminyó ya libula na 2024.

"Ekomeli ya yambo na mokili"

Irak, eye ezuami na esika enéne ya Mésopotamie ya kála, emonanaka mingi mingi lokóla "berceau de la civilisation" ndéngé ebéngami na lopoto. Ba Sumérien, Akkadien, Babylonien pe Assyrien bazuaka bansó bomengo kúna, pe mabelé mina ebotaka ekomeli cunéiforme, loléngé ya kála ya ekomeli na mokili, eye etombwamaki na súka ya quatrième millénaire libosó ya Y.-K. Káti na matéya mibongisami na kaminyó ya libula bizali na matéya ya bobandisi (initiation) na ekomeli ena ya kála. "Motindo ena ya matéya elingami", elimboli Al-Khoury, na bolobi lisusu 'te "na bitéyelo ya bonkoko na Irak, libakú ya kosála ntóki, miziki to eloko esusu ya ndéngé waná ezuamaka te".

Kasi koleka likambo ya sik’oyo bakopesa na baye bazali koya, matéya bikopesama na kaminyó ya libula Mesopotamia bikoluka lokóla ya kolakisa bangó nkita pe kiloléngé na loléngé ya lisapo ya Irak. Pe tángo okomona esengo ya bayékoli na súka ya bopakoli mokóbo,ezali pási ya kokabola bondimi 'te, tángo esengeli kotónga pe kozongisa bondeko na ekóló yoko, bonkoko ezali na ntina lokóla économie to politiki. "Ezali áwa, na Irak, ndé ebimaka ekomeli ya yambo na mokili", esepelisi mokambi ya likanisi. "Tolingi 'te bato bakoya simá bayéba yangó. Tolingi 'te bazala na loléndo na yangó".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

09 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 13:12