Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na COP30 Episkopo ya lokumu Pietro Parolin na COP30  

Na COP30, Mongóngó ya lisakoli ya Sudi mobimba

Ba Eklezia y'Amerika ya latin (CELAM), y'Afrika (SCEAM), pe y'Asia (FABC) bazuaki maloba o ntei ya lingomba ya ONU na COP30 mokolo ya minei 13 ya sánzá ya zómi na yoko na Belém. O eleko ya bokútáni boko, ya baepiskopo ya lokúmu Jaime Spengler, Fridolin Ambongo pe Filipe Neri Ferrão babéngaki bakónzi ya mokili na bobongoli likambo ya nkita na motindo ya bobongisi eye ekotia moto o káti.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Elili lyoko ya Papá Léon XIV pembeni na bangó pe logo ya convention-cadre ya ONU etáli botokisi ya klima (UNFCC) likoló ya mitó na bangó, batindami ya likoló ya ba Eklezia y'Afrika, y'Asia, y'Amerika ya latin pe Caraïbe batombolaki mongóngó na bangó libosó ya bozangi sémbo po ya nkita pe ya bato miye bizali konyokola bato. Liyangani lyoko ya kosangisa bangó esálemaki mokolo ya minei simá ya midi na COP30, elendisamaki na pósá yoko: eye ya kotika masoló ya klima kaka na baipolitiki pe baítekiniki te.

"Eklezia ekotikala kimia te. Tokokoba kotómbola mingóngó na bisó pembeni ya nzebi, ya société civile pe ya baye bazangi makoki, na bosóló pe na moléndé, kinó bosémbo ekosálema", tokokaki kotánga na nsakola po na bosémbo ya klima ekabolamaki na bakambi misáto ya masangá ya baepiskopo misáto na Vatican na mokolo ya yambo ya sánzá ya sambo. Kaka nsakola ena epesamaki lokóla elembo, na súka ya bokútáni, na motindami ya ONU, Gustau Manez Gomis, pe elobamaki na mokili mobimba. O ntei ya nsakola, ntina ya makambo ya sémbo, ya bosémbo pe ya bobateli ya bato pe ya ba écosystème. Nzokándé "litónó ya bozongi simá te ekopúsana" (point de non-retour s'approche), elobaki episkopo ya lokúmu ya Brésil Jaime Spengler, lokóla mokambi ya Lisangá ya baepiskopo y'Amerika ya latin pe ya Caraïbe, "esika ezali te po ya bosololi ntángo insó to po ya bobateli mbano ya mwá bato"

Bosangani ena etikali na lisapo, bolakisi bolámu ya likambo ya synode, ezali na pósá ya kolongola makambo mizali koleka na mokili (continent) yoko yoko te. Sóki bikóló y'Amerika ya latin batungisami na misála ya mabé ya bobuki banzete ya zamba y'Amazonie, mokili y'Afrika ye ebétami na bokoli makási ya eliki káti na eliki ya Sahara na nordi pe eliki ya Kalahari na sudi. Na monyele, eténi ya Asie-Pacifique eyébi bokimi ya bato ebelé pembeni ya mai, likolo ya bomáti ya mai pe bobakisami ya makambo ya klima makási, mingi mpenza bokomi makási ya ba typhon n'Asia ya Sudi-esti. Na waná esengeli kobakisa bopémi pási na bingumba y'Asia biye bizali na nsé ya loléngé elongobani te na bobébisi ya klima eye eleki mosika ba ndelo bipesama na OMS.

Bolekisi ya likambo ya nzinganzinga ezali te sóki bosémbo po ya bato ezangi

Po ya koyanola na lombango na makambo maye, baepiskopo ya lokúmu babéngaki ya kobima na "biyano ya lokuta", elongobami te po ya koyanola libela mikakatano mina. Batelemeli mingi mpenza bopesi mosolo po ya bazamba to ba marché pe crédit carbone, biye bikosálisa ya kokoba bobébisi na bosombi ba crédit vert, kasi lokóla bozui mabanga ya ntalo po ya likambo ya bolekisi ya lotiliki. N'Afrika, bolukiluki ya lithium, cobalt pe nickel ebébisi bassin ya Congo pe ememi bitumba na biténi y’Afrika na makambo ya mawa po ya bato, elobaki episkopo ya Kinshasa. Yangó waná eyano po ya nionso, na bosangisi makambo ya nzinganzinga pe bosémbo po ya bato, esengeli ezuama. "Nionso ekangemi", elobaki na moléndé episkopo ya lokúmu ya RDC, na bolobi bôngó liloba ebimisama mbala ebelé na Papá François na encyclique na ye Laudato Si'.

Ba Eklezia ya Sudi babimisi pósá na bangó ya kozongisa o mesa likambo ya bopesi mosolo, na boyoki mawa 'te milliards ya dollar  300 na mobú elakamaka o eleko ya COP29 ya Bakou bikoyanola lisusu te na bozili ya mosolo esengeli po ya bomeseni (adaptation), bokitisi (atténuation), pe mabúngi (pertes) na bobebi (dommages). Na mobú eye ya Zúbile, baeklezia babéngi lokóla kozongisa lisusu lisoló etáli bodefi mosolo ya bikoló bizangi makoki. "Bikoló bizali na nkita basengeli kondima pe kofuta niongo na bangó ya nzinganzinga na bokotisi niongo lisusu te bikóló ya Sudi mobimba", elendisaki episkopo ya lokúmu ya Inde Filipe Neri Ferrão.

Bato ya mayéle te kasi babateli

Kasi baepiskopo ya lokúmu balobaki bomikitisi na bangó libosó ya bonéne ya boyébi nzike ya tekiniki pe ya nzebi bisengeli po ya kobima na ba lotiliki biwuti na mabelé. "Tozali bato ya mayéle te kasi babateli", elobaki molobeli ya ba Eklezia y'Asia. Na loléngé na bangó pe na ba dioceze na bangó, bakambi ya masangá ya baepiskopo ya Sudi bamipesi ya bomátisi botéyi na likambo ya nzinganzinga ya nionso. "Totie bokónzi nionso ya Eklezia po ya kosálisa misála ya bobundi libosó ya mbongwama ya klima", ebakisaki episkopo ya lokúmu Fridolin Ambongo. Boyokani ya ba Eklezia ya Sudi ekolikia lokóla kokengele pe kolendisa botosi ya boyokani ya COP na nzela ya bobimisi Etalelo (Observatoire) ya eklezia yoko po ya bosémbo ya klima, ebimi na lisangá ya eklezia y'Amazonie.

Na súka ya bokútáni, motindami ya secretaire exécutif ya UNFCC, Gustau Manez Gomis, azuaki maloba po ya boyebisi mituya ya malámu bilobamaki na bofúngoli COP30 na 10 ya sánzá ya zómi na yoko: engebene na súka ya rapport na bokuse etáli Bopesi ebongisami na ndéngé ya ekóló (CDN), bobimisi ya mokili esengeli kokita na 12% leló kinó 2035 na botáli loléngé ezalaki na 2019. Bokitisi yangó ekoki naino te kasi ekolendisa, mbuma ya Boyokani ya Paris. Mosáli ya ONU asúkisaki lisikulu na ye na bolobi ntina ya mosála ya boyambi na bisalelo ya bikóló ebelé. "Tángo bato ya biyamba bakoloba, baipolitiki bakolanda. Ndé, bokoba koloba, pe bokoba koloba makási".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

15 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 14:30