Luka

Brésil- Klima COP30-ONU Brésil- Klima COP30-ONU  (AFP or licensors)

"Na COP, namoni esika na ngai te": babotama ya Guyane ya France na Belém

Botámboli boko po ya klima esálemaki mokolo ya póso na tóngo na ba nzelá ya Belém. Káti ya bato 50 000 basakolamaki na babongisi, batindami ebelé ya babotama (autochtones) batambolaki po ya kobenga bobateli y'Amazonie pe bozui na ntina mongóngó na bango na COP30. Batindami mwambi baútaki Guyane ya France balekaki na lifili.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Ba percussion bikobeta pe ba maracas bikoningana bipayi na bipayi ya kilometele minei ya nzelá bikatamaki o ntei ya mboka ya Belém, na mwá kilometele ya esika ya COP30. Moyi pe bobandu (humidité) bilembisaki bato pe babotama te. Batindami ya lingomba Laudato Si' batambolaki lokóla. Káti na bangó, Nicolas Chaumier, elama ya babotama ya Teko,  ayaki na COP30 kaka po ya kolakisa na mokili mobimba ba mikakatano ya klima bazali kokutana na yangó na mabelé na bangó, bikokani na biye ya batindami 3000 ya babotama bazalaki na Belém.

Etonga (communauté) na ye ezali na commune ya Campori, pembeni na ebale Oyapock, na ndelo ya nordi na Brésil, esika wápi elanga (sécheresse) ezali makási. "Kaka nzelá mókó tozali na yangó po ya kokoka kolia pe kokoma na ba mboka na bisó, ezali ebale", elimboli Nicolas. "Tángo ekauki, ekobaki ye, tokokoka lisusu te kotambola na masúwa pe tosengeli kobenga Letá po atia gbagba yoko ya likoló zambi ya kopesa na commune bilei bisengeli". Mibú mibále miye bileki, Guyane ebetamaki makási na elanga lyoko makási ya móto, na bosáli 2024 mobú ya móto makási koleka mibú 70

Biténi misusu ya mabelé bizinda na mayi. Sánzá eleki, mboka ya Yalimapo, ezuami pembeni y'Atlantique, ezindaki na ba mbonge. "Baímboka misusu bazali kobima", elimboli Eric Louis, mkumu ya babotama ya Kali'na ya Kourou, elama lokóla ya lifili ya Guyane. Na makambo ya météo mabé pe bilakaka te mobú molekaki bokono ya manioc ebakisamaki. Ebébisaki bilanga binso ya nzete waná, bilei ya ntina ya bitonga nionso ya babotama ya Guyane. 

Bobébi ebelé ya  ba nzelá ya mayi na Guyane

Tángo mayi ekozanga te to ekobébisa nionso na nzelá na ye te, ekobébisama  na baye bazali koluka mabanga ya ntalo na moyibi, elobi nkumu ya ba Teko, Simeon Monnerville. "Bato na ngai bazui bokono na mercure. Tobikaka na kolobo kasi na eleko eye bambisi bangó bansó babeli...". Nzokándé, bato ya Campori bakokoba kolia úta ebale, bazali na moléndé ya koboya soki moke te mimeseno na bangó, bakokoba kobunda po 'te nzelá ya mayi na bangó etikala péto po ya baye bakoya simá.

 COP30 ezali kosálema pembeni ya mabelé y'Amazonie, babotama ya Guyane ya France bazali na pási ya koyokisa mongóngó na bangó. "Tozali komona bazali koyoka biso te po France andimi kaka te babotama ya Guyane, waná na COP, ngai, nakomona nazui esika na ngai te...", elobi nkumu ya mibú 31.

Likambo lyoko eye Marie-José Lalsie amitiyi molobeli, ye azali mokambi ya Secours catholique na Guyane ya France, elama ya batindami na COP30. Letá ya France apona koboya kotia mokoloto na convention 169 ya Lisangá ya mokili ya Mosála (Organisation internationale du Travail), elobi secrétaire générale ya kála ya Parti socialiste ya Guyane. Etiama mokoloto na Bikóló 23, káti na bangó Bikóló 15 y'Amerika ya latin, convention ena ezali esalelo yoko ya sémbo ya mokili ya bokási etáli baímboka na bituluku, endima makoki ya lisangá na bangó na mabelé. France aboya yango po amona mokánda ena elongobani te na mobéko-likonzi ya ekóló.

"Ezali malámu 'te totala likambo yangó, lokóla bikóló misusu ya pembeni bisalaki! Yangó ekopekisa babotama ya kozala moífrance te, kasi esengeli kondima loléngé na bangó, ezali na ntina!". Na bozali na REPAM (Réseau ecclésial Panamazonien), Secours catholique ya Guyane ekomema maloba ya kosamba ya ntina po ya bozui bokeseni ya motindo ya bomoi na Guyane, na bopesi elaka po ya bosémbo ya bato. "Eye esengeli, ezali kosála po 'te bato bazua ngonga nionso likoki ya kosála bilanga, ya kokende bokila, ya kobika na ndéngé ya bonkoko", elobi Lalsie, libosó ya kolaka: "Bangó bayébi kobátela zamba!".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

17 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 12:24