FAO pe Afrika ya Westi libosó ya mikakatano ya klima
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
MDT 17 efungwamaki mokolo ya ibále 18 ya sánzá ya zómi na yoko na Abidjan, na bokambemi ya ministre ya Mosála pe ya Bobateli bato ya Côte d’Ivoire, Adama Kamara, libosó ya babéngami ebelé. Bokútáni ya eténi ena esangisi bato bayébi makambo, káti na bangó batindami ya FAO o ntei ya bikóló 15 y'Afrika ya Westi, pe bakambi basusu ya ONU; baningá babimisaka mosolo pe bongo na bongo.
Eleko yoko ezali na mikakatano ebelé
Likita yangó ekoleka na eleko yoko ezali na mikakatano ebelé pe kilikili na eténi ena y'Afrika. Ya sóló. "Afrika ya Westi ezali káti ya biténi bizali na pási na mokili libosó ya misála mabé ya mbongwana ya klima (bilanga, ba mpela, ba mbúla bikokita malámu te) na miango bibakisami mikakatano misusu lokóla bozangi bokengi, boluki eleki ya ressources naturelles to lokóla bobola". Na, "bomáti ya bato mbango mbango, bobongisi mabé ya bingumba, bokobi ya bitumba. Lisusu, engebene ya mbando ya Cadre Harmonisé po ya ba sánzá ya motóbá-mwambi, koleka bato milio 49,3 (esáli waná 11,6% ya bato) na Afrika ya Westi (na Cameroun) bimonani bazali na bozangi bilei ya koleka".
“Mituya mina bikoloba lisusu na lombángo 'te bokengi ya bilei pe ya bolei ezali o ntei ya mosála na bisó pe bomipesi ya lisangá na bisó esengeli elendisama", elobaki Bintia Stephen-Tchicaya, mokambi ya FAO po y'Afrika ya Westi.
Nini MDT 17 ekoluka
Likita ena ezali koluka kotelimisa eloko lyoko ya makási po ya lisoló káti ya Buro ya FAO po y'Afrika ya Westi, ba buro ya bikóló ya FAO, ba bulamatari, masangá mitalaka nkita, pe bongo na bongo. Ezali pe ya kotala bosáli ya malako ya likita lya 16 ya MDT.
Mbano bizelami ya MDT 17
Mbano bizelami ya likita lya 17 ya MDT bikozala mpenza ya kokoma mosika na bosáleli malako ya likita ya 16. Na lokóla, makanisi ya sóló sóló bikozelama po ya bobimisi mosolo.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye