Ukraine pe bána ya etumba
Jean-René Bompolonga - Kinshasa
"Aúti Marioupol pe na mawa azalaki na bokóti ya ba russe. Akimaki mboka na babóti na ye baye babatelaki ya na nzóto na bangó, o eleko masási mizalaki kobeta na bokimi na bangó". Paulina abándaki kobela bokono bwa mpéma, boyóki mókó ya stress pe ya bobángi. Na mboka ya Ivano-Frankivsk, na ngámbo ya westi ya kimia koleka na Ukraine, babóti na ye bamemi ye na lisálisi epái ya psychologue Lesia Yaruchyk, oyo alobi: "Mwána mwási eye ya moke asala esika mókó ya sikisiki (sûr) na etáláká (étage) ya yambo ya ndáko na bisó po ya ye mei pe po ya bána misusu baye bakutánaka na makambo lokóla ya ye. O ebándeli ya etumba, pembeni ya bána 50 bayăki awa koluka lisálisi, bána baye bazuaki likambo ya kokima mboka na bangó. Nzóto ya Paulina endimaki biténi ya lisálisi pe abándaki kozua baningá."
Na bosololi na Lesia Yaruchyk, tokoyéba ebelé na bána ya etumba, bána baye bomoi ezuaka elembo na mobúlú ya ba russe na Ukraine. "Makambo mileki mingi mizali sómo pe bobángi. Etumba ekopimela bato bansó na liyóki mókó ya bokengi, pe bána bakoyóka pási mingi po bayébi nanu makambo ya etumba te".
Bána bakoyema ba char
Lisálisi (thérapie) ezali na masano, misála ya maboko pe ya miziki. Bilenge mingi bakoyema mingimingi ba char to ba roquette. Kasi lokóla ba ndáko, po bazali kolóta bokengi.
Po ya Lesia Yaruchyk, mwána na mwána azali kosála makambo na ndéngé na ye. "Bána misusu bakoloba lisusu te, bamibombi. Basusu bakoki kokoma kolinga makambo ya makási. Basusu bazali kokima na Internet pe babóti bakomóna bangó mingimingi te".
Eye ekosálisa? Káwa ya tóngo
Loléngé nini Lesia Yaruchyk, ye mókó, azali kobika o eleko ya etumba pe makambo mizali kobima na mosála na ye? "Ya sóló, tokoyóka tolembi. Likambo mókó te ekopekisa towángana yangó, ezali sémba ya koyóka bolembi na bileko ya boye". Ye mei azali kosála makási ya kozua esengo na makambo ya "ntina", po ya kozipa pási eye ezingi ye. "Biloko ya mokolo na mokolo bikosálisa bisó po ya kozala na makolo na mabelé, lokóla káwa (café) ya tóngo, kobima na balcon pe koyóka loyémbo ya bandeke na tóngo makási; kosála na elanga, kokótisa misapi na mabelé; kotála film na libótá. Makambo nionso waná mikozongisa liyóki mókó ya bokengi".
Etumba ekotungisa kaka makanisi ya bána te, kasi na mikolo lokóla, elobi Tatuada Lynar. « Ezali likambo mókó moto nionso akoyóka pási, na loléngé mókó to mosusu. Ezali na moto mókó te na basáli na ngai oyo ayóki mabé to abúngisi likoló ya etumba. Babungisi ndáko na bangó to moto mókó ya motúya, to ndeko mókó azali na molongo ya libosó na etumba. Na ndéngé ya makanisi ezali likambo mókó ezali pási ya kondima pe ya kobika ». « Tokomeka kosepelisa bangó ndéngé ekoki na bosálisi ba féti pe misála ya masano miye mikosálisa bangó ya kobika na mokili mosusu ».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye.