Nzala ya makasi ezali na Darfour pe na Khartoum Nzala ya makasi ezali na Darfour pe na Khartoum  

Sudan: "Bapósá ya lombango mikokoba komáta mokolo na mokolo"

Ted Chaiban, mokambi enene molandi ya UNICEF, alobi botáli na ye na Sudan o káti ya etumba ikobebisa pe akebisi na likambo ya milio ya bána bazali na pási ya bolei bobé ya koleka, ya bozangi bokengi pe ya kotumolama ntángo inso.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

Úto sánzá ya minei 2023, Sudan izali o káti ya etumba ikobebisa eye itambwisi ba milio ya bato. Na lisakoli lyoko ya sika ya mokambi enene molandi ya UNICEF, Ted Chaiban, alobi lisusu 'te "Sudan ezali sik’oyo esika monyoko ya bato ezali makási pe etumba ekokola". Baye bakonyokwama mingi mizali bána.

Simá ya boleki na Darfour pe na Khartoum, Ted Chaiban akolimbola boni boni mobulu mikokabola masangá mikolo miye. Asololaki na bási pe bána baye basengelaki kokima ba ndáko na bangó na Al Fasher likoló ya bozali ya mampinga ntángo inso. Balobi basengelaki na makási koleka na bisika ya botálisi bizalaki na mindóki, babotoli bangó biloko na bangó, batumolami pe babétami. Mabótá mingi mitikali mikolo mingi na bilei te.

Bosóló lyoko ikobebisa

Mokambi enene molandi ya UNICEF alobi 'te bozángi bilei ya koleka ezali ya komáta na Darfour pe na Khartoum, epái wápi milio 1,4 ya bána bazali na bisika nzala ezali to elingi kokoma. "Na bozángi lisálisi na lombango, mingi káti na bangó bakokufa", elobi ye. Kaka na nordi pamba ya Darfour, bána 150 000 basengeli kobunda mobú eye na bozángi bilei ya makási koleka, "motindo mókó ya mabé ya nzala".

Na Tawila, motángo ya baye bazali na nzala elekaki mikámá kinó 2 000 na sánzá yoko úto sánzá ya minei, po Tawila ekomi esika ya bosangisi bato bakokima Al Fasher.

Lisusu, Chaiban alobi 'te babóti bakolela ndéngé bána na bangó batiyi makolo na etéyelo yoko te mibú ebelé. "Bána minei likoló na mitáno na Sudan, pembeni na milio 14, bazali kotánga te, elingi koloba génération yoko ekokola na bozángi botéyi", ebakisi ye. Makono mazali na ekóló, choléra, diphtérie, malaliá pe dengue bikoboma bilenge pe bána ebelé, nzokándé molongó ya balopitalo mizali malongá te.

Bána bazangi bokengi. Ted Chaiban alobi 'te úto sánzá 16, Al Fasher ezingami, na botiki bána 130 000 na bilei te, mai te pe lisálisi ya monganga te. "Ezali na ndéngé ya malongá ya kokóta pe ya kobima te", elobi ye.

Bongengi lyoko ya elikya na molili

Kasi, na káti ya pási ina, mokambi enene molandi alobi azalaki nzeneneke ya bobundi ya masangá maye mikotónga lisusu bitéyelo po bána bakoka kozongela koyékola.

Simá ya mobémbo na Sudan, alimboli bokútáni na ye na bato ya mosála ya UNICEF, baningá ya ONU pe basálisi ya UNICEF, mingi mpenza bato ya bokolongono bwa nzóto, baye, atá makambo mazali mabé, bapesi mangbelé ya komela po ya choléra pe misikitéla na milio 8 ya bato, basúngi bána koleka 250 000 bazangi bilei ya koleka… Ba pósá bikokoba kokola mokolo na mokolo. Ted Chaiban abwaki likambo na mokili mobimba na bolobi: "Eye Sudan azali na pósá leló, izali bokóti ya bato po ya lisálisi na libakú te, ya mosolo esengeli pe eyano yoko ya politiki po ya kosilisa etumba".

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló eye

28 sánzá ya zómi 2025, 12:19