Elikya ya sángó Romanelli simá ya "iyo" ya Hamas epai ya Trump
Jean René Bompolonga- Kinshasa
Eyano epesamaki ya Hamas na mwángo ya mokónzi Trump ezali elembo ya elikya, atá soki bokébi ezali, kasi ekoki penza kozala ebándeli ya súka ya etumba ena ya sómo. Sángó Gabriel Romanelli alimboli úto paloise kaka mókó ya katoliko na Gaza, na Gaza-ville, ba nsango ya súka na eye etáli diplomatie, nzókandé ba bombe "mikokoba kokweya lisusu, na 4 ya sánzá ya zómi, pe limpinga ya Israël ekoloba mbala na mbala 'te esika ya nordi ya lobwakú ya Gaza etikali kaka ya likámá".
Moto nionso akoloba mbala na mbala: Inshallah
Basangani nzinganzinga ya sángó po ya kolanda ba nsango ya súka, mizali 450 ya baye bambomama na ndáko-Nzámbe Libótá-Lisántu. "Bakoloba mbala na mbala Inshallah, soki Nzámbe alingi. Elikya na bisó ezali 'te moto nionso atósa pósá ena, po ya bolamu ya bato balembi, baye bakotánga koleka 66.000 bawéi bayébani, káti na bangó mingi bakundami na nsé ya bandáko mikweyaki, pe koleka 165.000 baye bazoki".
Molimo na paloise ezali kimia, atáko ba bombe mikwéyaki mokolo ya mitáno na bandáko ya bakristu na metele 200-300 ya ndáko-Nzámbe, epái wápi biténi ya ba bombe mikómaki. Na pási ya likambo, mingi likoló ya bozangi biléi, mai, nkisi pe bosálisi, ayanoli na elikya ya litambe mókó libosó epái ya boboto, na boyébi 'te ezali "ntina te" ya kokanisa 'te "makambo minsó misili".
Elikya ya lóbi ya malongá
Sángó Romanelli akobaluki epái ya simá ya etumba pe akoloba mayé ye akobanga. "Ekozala sómo, po ezali bôngó na bitumba minsó", kasi akotelemela pósá ya kondima 'te tokómi ya sóló libosó ya súka ya etumba pe na ebándeli ya lóbi ya malongá koleka "po ya bato bakobika awá na Palestine".
Mbela ya sángó Romanelli etindami epái ya sántu François ya Assise, oyo akokúmisama mokolo ya póso 4 ya sánzá ya zómi, na oyo "asáli mingi na bána na ye bayékoli po ya Mabelé Esántu, po ya bosilisi bitumba na mabelé ena, na botatoli boyambi katoliko", zambi akoka kosúnga nzelá ya boboto pe ya bosémbo po ya bato ya Palestine pe po ya baye bansó bakobika awá.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.