Luka

Bokweyisi ba ndako na Gaza Bokweyisi ba ndako na Gaza 

Gaza, tango bana bakotéya mikóló eloko mosusu na esika ya kanda

Elili « Les enfants de Gaza-Sur les vagues de la liberté (How Kids Roll)» elakisamaki na Vatican. Ezali mosála mókó eye, o eleko oyo ya pási na Proche-Orient pe ya bitumba na mokili, elingi elekisa nsango mókó ya elikya pe ya bondeko ekoki lisusu kosálema na miso ya bána.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

"Tozali na ba ndóto, tozali na ba elikya. Tozali koleka batomboki. Tozali koleka bato pámba basengeli kosála mabé". Ezali mbela epesamaki, na elili "Les enfants de Gaza-Sur les vagues de la liberté (How Kids Roll)", na mwána mwási mókó ya moke ya Gaza eye ekoyókana leló lokóla liloba endimami, kasi lokóla likebisi na mikóló. Elili (film) esálemi na Loris Lai, azuaka mbano na David di Donatello 2025 po ya elili ya yambo koleka, ekopesa nsango mókó makási ya mokumba pe ya elikya, ebwakemi na bilenge mike baye, na bopeto na bango pe na bozangi boyebi na bango, baboyi kokóma bangúná ya songolo na pakala. Kasi, bazali koluka likoki ya kobika lobi mókó na nzelá ya bolingi. Mbela mókó na bondeko, ekoleka na ndakisa ya bána ya elili, Mahmud, mwána mókó ya Palestine na Gaza, pe Alon, mwána moyuda mókó avandi na colonie mókó. Lisangá na bangó eleki likambo ya kosála elili, lokóla bato bazalaki kobongola maloba ya elili batatolaki, bazalaki wana o eleko ya bolakisi elili, mokolo ya minei 25 ya sánzá ya libwá, na Vatican.

Na elili, eye ekosálema na Gaza na 2003, o eleko ya Intifada ya mibále (elingi koloba botomboki pe ekolakisa mobúlú mibále ya boboyi bokonzi ya bayuda na Cisjordanie pe na Gaza, bána mibále mina balingani po ya pósá na bangó ya lisano ya surf, eye ekosalisa bangó ya kozua esika mókó ya koyokana, atá minyoko pe likambo ya kanda epai na epai, esika nini basengeli kobika. Kaka na eleko ena, mindóki mikokoba koboma pe likambo ya mobúlú ekosila te. Bomoi ekotambola na masano mikokatama tango insó na ba loséba mikosakola nsango ya ba bombe. Na esika boyokani ezali te, ezali bána nde bakotéya mikóló motúya ya bomoi pe nguya ya elikya.

Botáli ya bána

"Bána, mingi penza likoló ya mobú na bangó, bakolakisa lobi, bakolakisa oyo ekoki kobonga lobi. Kati na Palestine na Israël, likambo ezalaka pete te: leló koleka tango insó, ezali sómo", elimbolaki Loris Lai. Na ndéngé waná, bána bazali baye "bakolakisa nzelá ya misáto". "Ezali bongo eye mwána ya moyuda azali koloba na elili, akotúna motúna mókó ya pete na tata na ye: eleko nini oyo nionso ekosila?". Tata na ye ayanoli ye: Tango mosusu ekozala o eleko bango bakozala lisusu te to biso tokozala lisusu te". Na ngonga ena, mwána amituni pona nini kotala likoki mosusu ya misáto, eye ya bovandi ya bato na lisangá. "Bána mibále, bakómaki likoló ya lisano, na eloko mókó ya peto, ya kokweisa makonzi pe ya kokitisa bokeseni eye bazali kobika na makasi. Bakolakisa biso 'te nzelá mosusu ezali", ekobaki ye. Bolingi elobami na elili etikali kokokisama na bosóló, elimbolaki Loris Lai: "O ebandeli, bána mibále bazalaki mwa mosika mosika, bazalaki kotalana, komonana, kasi bafúngwamaki te na likanisi ya bolingi". Simá ya bosali elili bango mibále mbala ya yambo, "bakokaki na ndéngé mosusu kopúsana oyo epai ya moningá".

Kobandela lisusu bolingo ya bomoi

O eleko oyo Gaza esili elembi, pembeni ya mibú mibále ya etumba pe mboka mobimba ekwei na ba bombe ya mampinga ya Israël, nsango ya elili ezali kaka ya sika. "Na etumba, moto nionso ayókaka pási", elobaki Paolo Ruffini, préfet ya dicastère po ya communication, oyo alakisaki elili na Vatican. "Ya sóló, na súka, tango mosusu molongi azali, kasi molongi nani? Loléngé nini okoki kolonga kimia? Loléngé nini okoki kolikya olongi kimia? Loléngé nini tokoki kolingana ba oyo na basusu? Loléngé nini tokoki kondima nzelá ya misáto káti ya likanisi ya lokúta te eloko mosusu ezali te kaka liwá na bisó to ya bangó?"

Nsango ya bondeko

"Bondeko ezali likonzi ya bomoto pe nsango ya Kristu evandi likoló ya mwango ena", elobaki Tarak Ben Ammar, producteur ya elili. "Na eye ekoleka na Proche-Orient, lokóla na Ukraine", ezali bána nde bakotéya mikóló. Waná pósá ya "kotinda nsango móká ya politiki te, kasi ya kimia".

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo.

30 sánzá ya libwa 2025, 11:06