Liyangani po ya bofungoli ya  Lumsa University Africa Center Liyangani po ya bofungoli ya Lumsa University Africa Center 

Botéyi, gbagba mókó káti na Poto n’Afrika

Na université Lumsa, liyangani mókó esalisi po ya kobongisa boyokani káti ya mikili mibále pe po ya botéyi ya bilenge y’Afrika. Úta “Lumsa Africa Center” kinó “Campus Africa” ya Unesco, na boleki ya boyokani káti ya Iccrom pe Fabrique ya Sántu-Petelo. “Botéyi ezali mbala mókó moto azui pási pe eyano ya bitumba nionso”, elobaki Stefania Giannini, mokónzi molandi ya Unesco, na bapanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu Petelo.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Botómboli ya motángo ya bato ekeseni ya Poto pe y’Afrika ekosála likambo mókó ya bobakisi káti na mikili mibále eye mokili ya botéyi ekoki koluka po ya kosálisa bomátisi. Ezali nsango ya ntina eye ebimi na université Lumsa o eleko ya liyangani “Botéyi, makoki pe bokóli n’Afrika pe na Poto”, o eleko ya bofúngoli « Lumsa University Africa Center » efúngwamaki eleki mwá ba póso na université ya Roma. 

Tángo ya botóngi

Nkita ya nse ya mabelé, likoki ya botómboli nkita, motindo ya botéyi pe ya mosála bikomáta, na motángo ya bato ekoki kokóma 2,5 milliard úto leló kinó 2050, Afrika ezali moningá ya malongá ya Poto eye motángo ya bato ezali kokita pe nkita ezali kotámbola malembe. « Ezali ngonga mókó ya lisapo esika wápi tokoki kotónga », elobaki Francesco Bonini, recteur ya Lumsa, na bofúngoli liyangani. « Po na biso, ezali ndéngé mokili esala ‘te botóngi ena etála epái y’Afrika, eye ezali leló pe lobi na bisó », ebákisaki ye.

Botómboli nkita ya moto

Botóngi mókó ekowuta na bilenge ebelé y’Afrika. “Bokóli”, elobaki Stefania Giannini, mokónzi molandi ya Unesco po ya botéyi, “ezali kaka ya nkita te, kasi ya moto lokóla”, lokóla botómboli ya “nkita ya moto”. “Na 2050, elenge mókó likoló na misáto (1/3) na mokili akozala mwána y’Afrika. Pe milio 450 ya bilenge y’Afrika ya leló bakokani na motángo na lisangá ya bato na Poto”, elimbolaki Stefania Giannini, na bosakoli bofúngoli ya “Campus Africa”, likanisi mókó esálemi na makambo ya ntina mibále ya Unesco: eye ya bokokanisi bási na mibáli, po na kopesa makoki na bilenge bási, pe eye na bokuse ezali ‘te “lobi ya mokili ezali te na bozangi lobi y’Afrika”.

Campus Afrika”, esálemi na boyokani ya bikóló 194 bilama ya Unesco, elingi kotia na boyokani ya misála ya letá “nzinganzinga ya makambo misáto ya ntina”: kolendisa bisaleli ya bolukiluki; kotómbola bosáli elongó pe botamboli ya bilenge ya université; kozongisa na molongó manaka ya boyekoli pe ba pósa ya esika ya misála po ya bilenge y’Afrika.

Campus Afrika ezali na mosála enéne na bobongisi likanisi ena”, esembolaki Stefania Giannini. “Botéyi ezali mbala mókó moto azui pási pe eyano ya bitumba nionso, ya mikakatano, na káti waná mikakatano ya nzinganzinga”, elobaki mokónzi molandi ya Unesco na bapanzi nsango ya Ngwendé ya Sántu- Petelo simá ya molulu. “Esengeli kobatela botéyi tángo ezui pási”, pe ezali waná nde ekomónana lisakoli ya bobáteli bitéyelo na mobulu ya basoda, “kasi esengeli lokóla koloba lisusu ‘te na bozangi botéyi ya makási, ya malongá pe ya bosangisi bato banso, elikya ezali te”. Stefania Giannini alobaki lokóla ‘te “Afrika ezali mokili mókó eye lobi ekotála mingi mingi nkita ya bilenge baye bazali kokóma ebelé, eye komáta úta leló kinó 2050” pe ezali leló pembeni na milio 450 ya bilenge y’Afrika.

Boyokani káti na ICCROM pe Fabrique ya Sántu-Petelo

Liyangani na Lumsa ezalaki lokóla eleko ya kokabola likanisi mókó. Elakisamaki n’Aruna Francesca Maria Gujiral, mokónzi ya ICCROM (Centre international d'études pour la conservation et la restauration des biens culturels), oyo atiaki maboko eleki mwa ba póso na boyokani mókó na mokambi ya Fabrique ya Sántu-Petelo na Vatican, episkopo ya lokúmu Mauro Gambetti. Fabrique ya Sántu-Petelo, na nzelá ya Eteyelo na ye ya ntoki pe misála, ebongami po ya kofúngola bikuke na ye ya basilique na Vatican po ya bato ya ntoki pe ya misala ya maboko y’Afrika baye bakoyambama po na eleko mókó ya koyekola.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

18 sánzá ya libwa 2025, 09:53