Etumba kati na Russue pe Ujraine Etumba kati na Russue pe Ujraine   (AFP or licensors)

Bási y’Afrika « bazuami na motámbo” ya bisáleli ya drone ya Russie

Russie ezali kobákisa bobwáki ba drones na Ukraine. Simá ya nkita ena ya ba drones ya Russie, ebombami basáli y’Afrika. Na mokandá (rapport) mókó esálemi na GI (Initiative mondiale contre la criminalité transnationale organisée) pe ebimaki na sánzá ya mitáno elekaki, elobi ‘te “Russie azui na mosálá ba nkáma ya bilenge bási y’Afrika po ya kosangisa ba drone kamikaze”.

Jean-René Bompolonga – Kinshasa

Úta ba sánzá ebelé, Russie azali kosála mobúlú monéne nanu bisálema te na Ukraine. Mokolo ya eyenga ya 7 ya sánzá ya libwá, simá ya mobúlú mókó ya ba pépo ya Russie, ndáko ya bulamatari na Kiev ezikisamaki. Moscou abetaki bôngó ba drone 810 pe ba missile 13 na ekóló, káti waná ba drone 747 pe ba missile 4 bikangemaki, engebene na limpingá lya nzelá ya pépo ya Ukraine.

Mobúlú ena ya pépo ezali ya makási koleka úto ebándeli ya etumba, ezali « likambo (record) ya sika » eye ekokaki kosálema po Russie abongisa esika na ye ya esáleli ya limpingá po ya kosúnga pe kokólisa motángo ya ba drone. Ezali na esika ya nkita ya loléngé mosusu na Alabuga, pembeni ya Lelabouga, na engúmbá ya Tatarstan -na sudi-ouesti ya Russie- nde ba nkóto ya ba drone ya mobúlú, ya type Shahed, bizali kosálema. Engebene na lokása (journal) Wall Street, pembeni na drone 200 bikosálema ba sánzá nionso na Tatarstan.

Nini ebombami simá ya nkita ya ba drone ya Russie?

Na mokandá (rapport) mókó esálemi na GI (Initiative mondiale contre la criminalité transnationale organisée) pe ebimaki na sánzá ya mitáno elekaki, elobi ‘te Russie “azuaki na mosálá ba nkáma ya bilenge bási y’Afrika po ya kosangisa ba drone kamikaze”. Engebene na Julia Stanyard, molukiluki o ntei ya ONG pe mokómi ya mokandá, na lisalisi ya mabóko mike bina, bawúti mingi na “Uganda, Mali, Cameroun, Sierra Leone, Botswana, Zimbabwe pe Nigeria to lisusu na Sudan ya Sudi”, Moscou ayébaki kotómbola na lombangu makoki na ye ya bokeli.

Na bobaluki epayi ya bilenge bási y’Afrika, Kremlin akokaki komátisa bibambola na ye na Ukraine ba sánzá bileki pe kosilisa likambo ya “bozangi basáli”, eye esálemaki úto bokoti ya Russie na Ukraine. “Mibáli ebelé bakotisaka bangó na limpingá ya Russie. Pe likanisi ya bozui na mosála bási y’Afrika ezali po ya kokitana na mibáli”, elobi Julia Stanyard.

Bopesi mosálá ya ndéngé ya moyibi

 Bilenge bási waná bazui bangó na mosálá na loléngé mókó ya “sóni”, elobaki ye. Zambi “bayébi te libosó ya bokómi na bangó na Russie, ‘te bakosála ba drone po ya limpingá ya Russie”, ebákisaki molukiluki. Bisaleli ya Russie bizali kobenda bilenge y’Afrika ya mibú kobanda 18 kinó 22 na bolaki bangó boyékoli mosálá pe mbano ya malamu, kasi bayébisi bangó te mosálá nini ezali kozela bangó. Kúná na Russie, bazali lokóla “bazuami na motámbo”. “Bási waná bakendeki na Russie, na bokanisi ‘te ezalaki linaka mókó ya mosála pe ya koyékola, kasi ezali yangó te. Bazali kosála ba ngonga ebelé mbala mókó na bokeli, bosangisi ba drone, na bobatelami tángo insó”, elobaki ye.

Loléngé ya mosála ezali malongá te

Lisusu, bilenge bási bakosála na loléngé mókó malamu te pe bazali kosimba « biloko ya chimie biye bizali mabé makási pe bikobébisa bokólóngónó ya nzóto na bangó », esembolaki Julia. Na waná esengeli kobákisa bobateli ya basáli waná. « Bazali lokóla esika mókó limpingá ya Ukraine ezali kobeta masási, po bakokela ba drone pe bato ya Ukraine babwakaki ba drone epayi wápi bási waná bakosála koleka mbala mókó », elimbolaki ye.

Eténi ya monéne ya bozui na mosálá ena ya bási y’Afrika ezali kokoba, ekosálema na nzelá ya internet, na ba réseaux sociaux. « Ba influenceur, lokóla na TikTok to Instagram, bakotómbola likambo ena ». Ezali ba « ONG biye bizali simá ya politiki ya Russie pe bakomátisa mosálá ena ». Likoló ya bopesi « mosála ya malongá te », ndóto ya bilenge bási ebelé y’Afrika ebongwami na pási.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

11 sánzá ya libwa 2025, 17:25