Bato ya Palestine bakokima Bato ya Palestine bakokima   (MAHMOUD ISSA)

Bána ya Gaza batúni: « Epái wápi tokokende simá? »

Mofulele franciscain Ibrahim Faltas, ya Custodie ya Mabelé Esántu, akanisi pási ya bána ya Gaza, bazali kotámbolisa bangó na makási bipái na bipái pe bozangi koyéba nini ekoleka. Abéngi batéyi, mabótá pe masangá ya bato basúsu ya kotéya baye bakokitana bangó na momesano mókó ya kimia ya sóló. Alendisi mókó mókó ya « kokoba kondima, kosámbela pe kolikya na kimia »

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Monyoko ezanga súka ya bána ya Gaza ekoki na mokúse kolobana na motuná mókó: « Epái wápi tokokende simá? » Ezali na bogangi ena nde mwána mókó abalusi epái ya tatá na ye simá ya bozui, mbala mosúsu, lotómo ya kotika esika bazalaki. Simá ya boluki bisika ya sika ya kovanda, mabótá bakokende epái mosúsu lisusu.

Na pási ekokoba na mutú ya bozangi bobáteli bibákisami liwá, pási pe bozangi. Bána bakofúta motúya eleki. Mibú ya yambo ya bomoi bizali biye bizalaka eleko mókó wápi libótá, etéyelo pe bato bakolakisa makambo ya malamu, kimia na bovandi pe biloko po ya kokóla. Kasi, bána ya Gaza bakobika mibú na bangó ya yambo na pási, na mikakatano pe na bobángi.   

« Mokolo na mokolo, nakoyóka pósá ya kopesa na lombangu na bána na bisó pe na bilenge na bisó, bisaleli biye bikosúnga bangó ya kobika elongó na kimia ya sóló sóló. Ezali bomipesi mókó ya motungisi, kasi ya litómba lokóla, po ekomema ba mbano ya sóló: bána bazali na likoki eye babótámi na yango ya koyéba eye ezali malamu, ya koyamba bokeseni na esika ya kosámbisa yangó », elobaki sángó Ibrahim Faltas

Kasi na motuná « Epái wápi tokokende simá? », babóti ya Gaza bazali na eyano ya malongá te. Bangó mókó bazali na eyano ya eye ekotungisa bomoi na bangó te. Bakoki te kopesa kimia na bána na bangó na boyébisi bangó ‘te bazali kokende na esika mókó ya kitoko, po bobébisi eye ezali nzinganzinga na bangó etiki elembo na mabelé na bangó. Bakoki kolaka te ‘te bakozua bobáteli pe bakobándela kozua lisusu kimia eye ebúnga, na botiki simá na bangó likúnya pe bozongisi mabé, po bazali kosála bangó lokóla bato ya kobimisa ndéngé mobúlú ezali koyá.

Bato bakoyá simá na Mabelé Esántu bakozala na pósá ya bokébi mingi pe masálisi po bazua matéya lokóla bási pe mibáli ya kimia. Ezali mokúmba monéne ya balakisi, mabótá pe masangá ya bato pe ya ba bulamatari biye bakondima kimia pe balingi yangó sóló sóló.

Na mikolo miye ya pási, epái wápi mobúlú ekozua eyano na mobúlú koleka, ezali pete te ya kondima pe kolikya ‘te molongó eye ekomema kitoko ya bomoi na mozindo ya mabé ekoka kokangama. « Kasi, nalingi koyanola na motuná ena - « Epái wápi tokokende simá? » - na makási ya elikya », elobaki mofulele Ibrahim Faltas.

« Nalingi naloba na mwána waná, pe na bána nionso bazali koyóka pási likoló ya buzoba ya mikolo, ‘te pási esili. Bazonga epái na bangó, pembeni ya bandeko na bangó, po na kokúta lisusu baningá na bangó pe batéyi na bangó, ba búku na bangó, ba crayon na bangó pe ba cahier na bangó. Nalingi pe naloba na mikolo: pási esili. Tokoba kondima, kosámbela pe kolikya na kimia », esúkisaki Ibrahim Faltas.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

13 sánzá ya libwa 2025, 10:24