Likita ya yambo ya bikóló binsó etáli lisálisi na bato ya makámá mpe bobongisi nzinganzinga eye esálemaki na 1 ya sánzá ya libwa na New-York Likita ya yambo ya bikóló binsó etáli lisálisi na bato ya makámá mpe bobongisi nzinganzinga eye esálemaki na 1 ya sánzá ya libwa na New-York  (Gerasimov)

Na ONU, Ngwendé ya Sántu-Petelo etelemeli «mayéle ya bobangisi» esengisami na bopekisi nucléaire

O eleko ya bozui maloba na ONU, Botindámi ya ntángo insó ya botáli ya Ngwendé ya Sántu-Petelo ebengi na bosáleli Boyókani ya bopekisi babomeki nucléaire nionso: makambo miye bikobima waná na ntángo molayi bikoyebisa bisó lisusu 'te sima ya «matéya, bibundeli mpe makanisi ya litómba ya etumba», ezali na bato biye lokúmu «ekoki koleka sima ya matómba ya mampinga to politiki te».

JR Bompolonga – Kinshasa

Maloba mpe bikela ya makási koleka bikomema «mayéle ya bobangisi», nzokándé sima ya makanisi mpe bibundeli, bilongi ya baye bakonyokwama na «loléngé lyokó ya bokónzi» bibébi mpe lokúmu na bangó enyatami mpo ya matómba ya mampinga mpe ya politiki. Ezaleli ená ekosenga ekela yokó ya lombango mpe ya makási. Ezali waná ndé Mgr Robert Murphy, motáli ya ntángo insó molandi mpe mokambi ya makambo ya Botindámi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU, alobi. Alobaki o eleko ya bozui maloba mbala mibalé, na libakú ya likita lyokó ya botomboli Mokolo ya mokili mobimba libosó ya babomeki nucléaire, mpe na Likita mpenza ya yambo ya bikóló binsó etáli lisálisi na bato ya makámá mpe bobongisi nzinganzinga eye esálemaki na 1 ya sánzá ya libwa na New-York.

Likámá ya bozongi bokó ya sika na nguya ya nucléaire

Lisikulu ya yambo ekundolaki Mokolo ya mokili mobimba libosó ya babomeki nucléaire, esepelamaka na 29 ya sánzá ya mwambi, na bokanisi na bokási «libulá lyokó ya kobébisa» eye, atáko bongo, ekolendisa likanisi «'te boboto ekoki kobátelama te na bomátisi mindóki ya kobébisa koleka». Leló, ya sóló, tokomona «bozongi bokó ya sika lisusu ya bopekisi nucléaire» mpe «lisikulu lyokó ya bokumisi nucléaire ya makási koleka lisusu», biye bikotiya ntembe na mokáno ya mokili esálema. Likanisi liná elobamaki na Papá Léon XIV na encyclique na ye ya Magnifica Humanitas, emonaki botiki malémbe malémbe ya botóngi mitó ya bibundeli nucléaire lokolá «bondimi ya bobángi eye mindóki bikoki kosilisa mokili mobimba bikolakisa».

Na ndéngé waná, Mgr Murphy azongisi lisusu lisúngi ezanga ndelo mpe mbélá ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na bosáleli baboyókani bizali, lokolá Boyókani ya boboyi bopanzi mindóki ya nucléaire mpe Boyókani ya bopekisi babomeki nucléaire nionso. Bomipesi ya bituluku ya mosála na bosáleli baboyókani yangó elakisi boni boni «nzebi, technologie mpe boyókani ya bikóló bikoki kotiama na mosála ya polélé, ya botiyi motéma mpe ya bolámu mpo ya bansó».

Kosúkisa «loléngé ya bokónzi»

Makanisi maye bizongaki lokolá o eleko ya lisikulu ya mibalé, eye elobaki lisusu Magnifica Humanitas, esika wápi Papá akébisaki libosó ya bobimisi «loléngé lyokó bokási» epái wápi «bozali na biloko bisengeli mpe likoki ya kokonza bikoluka kopesa na makási linaka mpe mibéko ya mokáno». Momeseno ená «ekokolisa etumba lokolá likambo ya ntina, na bokobisi bokási bokó ya mampinga kaka monéne koleka, na bobendi litómba na mokakatano ya bikóló ebelé mpe na bopesi bosóló bokó ya lokutá eye ekoloba nzelá mosusu ezali te».

Mayéle waná, elobi motindami ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, ezali mpenza ya ntina na likambo ya nucléaire, «epái wápi bibundeli bikokóma kaka ya sika mpe minéne, nzelá mókó na bokotisi ekokola ya batechnologie na botámboli ntángo insó na makambo ya boluki mindóki». Makambo miye bikobima waná na ntángo molayi bikoyebisa bisó lisusu 'te sima ya «matéya, bibundeli mpe makanisi ya litómba ya etumba», ezali na bato biye lokúmu na káti na bangó,  likabo ya Nzámbe, «ekoki koleka sima ya matómba ya mampinga to politiki te». Ezali bôngó na ntina ya kosálela «likanisi ya bato ya makámá», ebongisami na Léon XIV, na bopesi lisúngi lyokó ya bokólóngóno mpe ya molimo na bato bazua pási na móto mpe biloko biyaka sima ya babomeki nucléaire. Bokébi bokó mpenza esengeli epesama na masangá baye bayóka pási na ndéngé ya koleka, mingimingi bato ya ebándeli ya mboka.

Kobátela bato mpe nzinganzinga

Epái esusu, bobáteli ya masangá biyóki pási ekoki kokabwana te na bobáteli ya nzinganzinga. Ya sóló, emonanaki 'te bobébisami ya mabelé, ya mayi mpe bibombeli ya mokili na biloko ya mabé ezali na bambéba na bokólóngóno ya nzóto mpe na makoki ya kobika ya bato ya leló mpe ekolakisa mokúmbá mókó mpo bato bakoya sima. Na likambo lyangó, Boyókani ya bopekisi mindóki ya nucléaire mpe Boyókani ya bopekisi babomeki nucléaire nionso bizali misisa ya ntina mpo ya kokola na mokili mókó ezanga mindóki ya nucléaire mpe kotombola boboto bokó ya sémba mpe ya sékó.

«Baye bazua pási na mindóki ya nucléaire bakosenga bisó kaka kobongisa makambo mabé na bambéba bayóka kála te, kasi lokolá ya kotika litatoli na bangó kokamba maponi na bisó mpo ya lobí», esúkisaki episkopo ya Irlande libosó ya lisangá ya ONU. «Na ndéngé waná, tokoki koleka momeseno ya bokási mpe kotombola emoniseli yokó ya bokengi eye ekotiya moto o ntéi, ekobátela bokeli mpe ekosálela bolámu ya bansó».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

03 sánzá ya libwa 2026, 14:10