Na Séoul, bokútáni ya yambo káti ya bokristu mpe matéya ya Confucius
Vatican News
Liyangani ya yambo káti ya bokristu mpe matéya ya Confucius ekosálema na 4 mpe 5 ya sánzá ya mwambi na Séoul, na etéyelo ya likoló Sogang. Ekosangisa bakambi ya mayéle ya biyamba ya bakristu mpe ya matéya ya Confucius, na lokolá bato ya bitéyelo ya likoló, mpo koluka boni boni mimeseno mibalé miye bakoki, elongo, kopesa likanisi ya mokili mókó ya sémba koleka, ya boboto koleka mpe ya bomoto koleka.
Molúlú ená, na nkombo ya «Lisoló na likabo ya bokristu mpe matéya ya Confucius na lingómbá lyokó elongobami: Likoló ya Sika, Mabelé ya Sika mpe Datong (Boyókani Bonéne, Bomoko Bonéne)», ebongisami na Dicastère mpo ya Lisoló káti ya biyamba, na bosálisani na Lisangá ya baepiskopo katoliko ya Corée, etéyelo ya likoló Sogang mpe Akademi ya Confucius ya Corée.
Etando yokó ya bobóti mpo ya lisoló lyokó ya botóngi
Na liyébísi lyokó, Dicastère mpo ya Lisoló káti ya biyamba elimboli 'te «atáko bokristu mpe matéya ya Confucius bivandi na mibéko ya makambo ya Nzámbe mpe ya philosophie bikeseni, bomitungisi bokó ya bangó ya lokúmu ya moto, bosémbo ya bizaleli, bokambi ya malámu mpe bolámu ya bansó ekopesa etando yokó ya bobóti malámu mpo ya lisoló lyokó ya botóngi».
Bokútáni ya Séoul ekotála «mikakatano ya lombango ya eleko eye, mpenza bokabwani ya bato, bozangi koyéba malámu, bobébisi ya nzinganzinga mpe makámá biye bizali likoló ya boboto».
Na súka ya liyangani, «mbélá mókó ya boyókani bokó ekokola káti ya bokristu mpe matéya ya Confucius» ebongisami, na makambo ya «boyékoli, botéi ya malámu mpe botóngi ya boboto», zambi ya kobánda «momeseno mókó ekowumela ya lisoló» káti ya mimeseno mibalé.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.