Luka

2026.08.03 Episkopo ya lokumu Parolin na cathédrale Santu Yacobo na Guatemala 2026.08.03 Episkopo ya lokumu Parolin na cathédrale Santu Yacobo na Guatemala  

Episkopo ya lokúmu Parolin na Guatemala mpo ya kosepela mibú 90 ya boyókani na Ngwendé ya Sántu-Petelo

Na eleko ya mobémbo na ye na ekóló eye y'Amerika ya káti mokolo ya eyenga 2 ya sánzá ya mwambi, Secrétaire ya Letá ya Vatican alobaki lisusu 'te «Nzámbe ye mókó akoki kokitisa nzala ya makási ya moto», o eleko ya misa na cathédrale Sántu Yacobo na libakú ya bokundoli boyókani káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe Guatemala.

JR Bompolonga – Kinshasa

Na litéya na ye epesamaki na mokolo ya eyenga 2 ya sánzá ya mwambi na mobémbo na ye na Guatemala, episkopo ya lokúmu Pietro Parolin alobaki lisusu 'te «Nzámbe ye mókó akoki kokitisa nzala ya makási ya moto. Mpe kaka nzala ya lipa te, kasi lokolá mpósá ya liyóki, ya bolingo, ya elikya, mpósá ya bomoí bokó malámu, etondá, bomoí bokó ya sékó».

«Ya sóló, mpósá ya kosakola Nsango-Ndamu ekomema ye ya koyamba bomoto nionso mpe ya kokanga nzelá yokó te ekoki komema na botóngi ya lingómbá lyokó ya sémba koleka, ya bondeko koleka mpe ya bomoko koleka, na bokáti bampósá ya boboyi, ya bozangi mawa mpe bozangi bosémbo bilukami na bozangi bokokani mpe kanyaka», ekobaki episkopo ya lokúmu Pietro Parolin.

«Bambote ya bolingi» ya Papá Léon XIV

Sima ya botáli ndáko ya ezuzulu ya Mamá Teresa ya Calcutta, Secrétaire ya Letá akambaki misa eye bakambi ya Eklezia, ya civil mpe bantómá, na káti waná mokónzi, mokónzi molandi mpe baepiskopo ya Guatemala.

Úta ebándeli ya litéya na ye, episkopo ya lokúmu alekisaki bambote ya Tatá-Esántu na bato ya Guatemala. «Na ebándeli ya ngonga eye ya likanisi, nalingi ya yambo mpenza kopesa na binó bambote ya bolingi ya Papá Léon XIV, oyo akokanisa binó mingi mpe asengaki ngaí nayebisa binó azali penepene na binó mpe bobenisi ya tatá».

Bandimi ebelé bazalaki na misa esalemaki na cathédrale Santu Yacobo ya Guatemala ekambemaki na Mgr Parolin
Bandimi ebelé bazalaki na misa esalemaki na cathédrale Santu Yacobo ya Guatemala ekambemaki na Mgr Parolin   (ANSA)

«Nzámbe ye mókó akoki kokitisa nzala ya makási ya moto»

 Na bolobi lisusu na sima ntina ya mobémbo na ye na Guatemala  -úto 1 kinó 4 ya sánzá ya mwambi mpo ya kosepela mibú 90 ya boyókani káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe Guatemala mpe mibú 400 ya mbótama ya ndeko Pedro, mosántu ya yambo ya Guatemala (Sántu-Petelo ya Betancur) - episkopo ya lokúmu Parolin alobaki 'te bobáteli ya Nzámbe etika pembeni bato ya Guatemala te, na Eklezia ekotámbola na mabelé eye.

“"Makambo mibalé maye ya lisapo, bingengisami na Liloba ya Nzambe oyo towuti koyóka ekolakisa bisó likambo-likonzi lyokó ya ntina: Nzámbe ye mókó akoki kokitisa nzala makási ya moto. Mpe kaka nzala ya lipa te, kasi lokolá mpósá ya liyóki, ya bolingo, ya elikya, mpósá ya bomoí bokó malámu, etondá, bomoí bokó ya sékó".”

«Bopesa bangó biléi»

Na bolimboli Nsango-Ndamu ya mokolo ya eyenga eye, episkopo ya lokúmu alobaki 'te na bosóló ená ya moto ndé Eklezia ekozua mbélá na ye ya sóló: komema lipa ya Liloba mpe lipa ya Kominyo na babáli mpe bási na ntángo insó mpe na bisika binsó, na bolandi mobéko ya Yézu. «Bopesa bangó biléi» ezali «bobengi bokó eye ekobeta kaka na makási mpe ememi bisó na ntina na bokútani ya mosusu, esika wápi azali mpe atá ezaleli na ye ezali ndéngé nini, na bogangi lokolá mosakoli Izaya: baye bansó bazali na mpósá baya koluka mayi, mpe baye bazangi mosolo baya mpe balia». Ezali «bobengi bokó ya makási ya Nzámbe, "Bopesa bangó biléi", eye ekolendisa bisó ya kozanga mawa te libosó ya bampósá ya baye bazali lokolá bisó».

Kozongisa na mabóko ya Yézu moke eye tozali na yangó

Ndéngé mókó, episkopo ya lokúmu Parolin alobaki 'te, libosó ya bampósá ya mokili, ya bobola, ya bozali yo mókó, na bozangi bosémbo mpe na pási, biye mingimingi bizali bilembo ya kanyaka, tokoki kokanisa 'te eloko ya kosála ezali te. Kasi Yézu akobenga bisó ya kosála na eye tozali na yangó.

«Atá sóki mapa na bisó mitáno mpe mbisi na bisó mibalé bikomonana lokolá bikokoka te, lokolá makoki moke ya bisó eye tozali kaka babáteli, likamwisi ebándi ya sóló ntángo bayékoli bazongisi na mabóko ya Yézu moke bazali na yangó. Ezali se bongo na bomoí na bisó: ntángo topesi na Mokónzi ngonga na bisó, makoki na bisó, boboto na bisó, mpe kútu bandelo na bisó, akobakisa makabo miná mpo ya bolámu ya bansó».

Mgr Pietro Parolin elongo na baepiskopo ya Guatemala mokolo ya 2 ya sanza ya mwambi
Mgr Pietro Parolin elongo na baepiskopo ya Guatemala mokolo ya 2 ya sanza ya mwambi   (AFP or licensors)

Linaka ya botáli ya episkopo ya lokúmu Parolin

Botáli ya episkopo ya lokúmu Parolin na Guatemala elakisi lisusu bansinga ya lisapo ya bolingi, ya boyókani mpe lisoló káti ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe Guatemala. Na bokómi na mokolo ya yambo ya sánzá ya mwambi, ayambamaki na ministre molandi ya Makambo ya bapaya, María Luisa Ramírez.

Mokolo elandi, sima ya botáli ndáko ya ezuzulu ya Mamá Teresa ya Calcutta, Mgr Pietro Parolin akendeki na cathédrale ya Guatemala, libosó ya kotála sanctuaire ya Ndeko Pedro.

Mokolo ya yambo 3 ya sánzá ya mwambi, episkopo ya lokúmu Parolin akosolola na mokónzi ya Guatemala, Bernardo Arévalo. Akokútana lisusu na batindami ya bato ya ebándeli ya ekóló. Episkopo ya lokúmu akoyambama na ministre ya Makambo ya bapaya, Carlos Ramiro Martínez, na sima batindami ya bikóló.

Na súka, mokolo ya mibalé 4 ya sánzá ya mwambi, Secrétaire ya Letá akokútana na baepiskopo mpe basángó ya ekóló. Botáli ekosila na misa na sanctuaire ya dioceze Bokumisi Nzámbe ntángo insó, ezali na Mixco, etuka monéne ya mibalé ya Guatemala.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

04 sánzá ya mwambe 2026, 11:55