Episkopo ya lokúmu akolikya 'te MMB ya Séoul bikozala «bokútáni bokó ya likambo ya sóló ya boyambi»
Vatican News
Boyókani ya mokili, misála mpo ya bato ya mobémbo mwa boyambi, bovandisi, mituka ya kotambola, bobáteli, lisálisi ya mónganga mpe boyébisi. Na mobú mókó ya MMB bikoya, biye bikosálema úto 3 kinó 8 ya sánzá ya mwambi 2027 na Séoul, na Corée - ya mbala ya mibalé n'Aziya, sima ya biye ya Manille na 1995, mpe ya libosó na ekóló yokó esika wápi bokristu ezali eyamba yokó ya moke koleka -, lisangá ya ekóló eye ekobongisa milúlú, eye ezui lisálisi ya bosáleli ya bato 378 baye basálaka mosála ezanga lifúta, eleki na eténi ya bobongisi mpo ya eye ya bobongisami mobimba ya mwángo, na bisika binsó. Likambo-likonzi eyebani, eponamaki na Papá François, ezali «Zala na molendé: nalongi mokili !», ezuami na Nsango-Ndamu ya sántu Yoane.
Kopesa motúya na etamboli ya bobongisi ya MMB
«Bilengé baye bakokende na Corée pembeni ya babáteli - elobi episkopo ya lokúmu Kevin Farrell, préfet ya dicastère mpo ya Balaíki, Libótá mpe Bomoí, na bamédia ya Vatican - bazui esika yokó ya ntina koleka na bobongisi ya molúlú. Loyembo ya lokúmu, na losámbo mpe matatoli ya basántu babáteli mitáno baponami mpo ya mbala eye ya mokili ya MMB, ezali esálelo yokó ya mobáteli eye ekosálisa bilengé ya komibongama na molimo na bokútani ená ya 2027». Préfet abakisi 'te «na mibú ntúkú mineí ya lisapo, Mikolo ya mokili ya bolengé bizui mbano malémbe malémbe likoló ya boyambi, esengo mpe bozali ya makási ya bilengé mpe Baeklezia ya bikóló». Mpe na baepiskopo mpe bakambi ya mosála ya mobáteli ya mokili mobimba, episkopo ya lokúmu Farrell azongeli lisusu mbélá ya kotambola pembeni ya bilengé epái ya Séoul 2027, «na bopesi motúya bisáleli waná na etamboli ya bobongisi, na kosálisa bangó ya koleka mobémbo mwa losámbo lokolá mayéle ya sóló ya boyambi, ya lisangá ya Eklezia mpe ya bokútáni ya moto ye mókó na Yézu».
Loyembo ya lokúmu mpe mosála ya nzinganzinga «Breath of life»
Loyembo ya lokúmu ya molúlú ekobima na nzelá ya YouTube ya MMB ya Séoul na 3 ya sánzá ya mwambi. Eténi eponamaki káti ya makanisi 434, káti na yangó 294 biwutaki na bikóló bisusu. Eténi elongaki, «Confidite, Ego Vici Mundum» (Likambo-likonzi ya MMB na latin», ekomamaki na moyembi ya Corée Francis Jiyoon Kim. Bobimi ya loyembo ya lokúmu ekokende elongo lokolá na mosála ya mokili mobimba ya boloni banzete «Breath of Life», eye ekobenga bilengé ya kolona banzete na ekóló na bangó mpe ya kokabola bozali na bangó na internet. Likanisi ewuti na encyclique Laudato si' ya Papá François, mpe na molongó ya eye esálemaka na ba MMB bileka ya 2023, ekoluka kokotisa bato ya mobémbo mwa boyambi ya lobí na bikela ya nzinganzinga ya sóló, zambi ya kokitisa mosála eye karbone etika na bozali na bangó, na ekela yokó ya mokúmbá epái ya lobí. Mosála etelemi na likanisi ya ekóló ebimaki na 2025, na bosáleli na Mosála ya zamba mpe bulamatari ya Séoul.
Mikolo na badioceze ya Corée
Na eye etáli bokomisi nkombo, ekozala na site ya MMB, eye ekopesa úta sik’oyo bansango ya biloko mpe bansango na bakit mpo ya bato ya mobémbo ya losámbo. Yambo ya kokende na Séoul, bato ya mobémbo mwa boyambi babengani kozala na «Mikolo na badioceze», biye bikosálema úta 29 ya sánzá ya sambo kinó 2 ya sánzá ya mwambi na badioceze ya Corée. Bakovanda o nteí ya masangá ya esika ená mpe bakomona penepene boyambi mpe momeseno ya Eklezia ya Corée. «Na mibú misáto mileki, tomipesaki ya kobwaka mabángá ya molúlú eye», elobaki episkopo ya Séoul, Mgr Peter Soon-taick Chung, mokónzi ya lisangá ya bobongisi. «Tokosála nionso eye tokoki mpo 'te MMB ya Séoul bizala bosepeli bokó ya elikya mpe ya litatoli lyokó ya boyambi bapaya malámu mpe ya bosálisani eye Corée mpe Séoul bikolakisa».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.