Luka

2026.08.06 Bokutani ya episkopo ya lokumu Pietro Parolin na batindami ya Lisolo ya ekolo mpo ya boboto na Meksike 2026.08.06 Bokutani ya episkopo ya lokumu Pietro Parolin na batindami ya Lisolo ya ekolo mpo ya boboto na Meksike 

«Boboto ebándaka na bomitiyi na esika ya mosusu», emoni episkopo ya lokúmu Parolin

Mobémbo ya Secrétaire ya Letá na Meksike esilaki na 6 ya sánzá ya mwambi. Mikolo miye ya súka, akútanaki na mokónzi Claudia Sheinbaum, ministre ya Makambo ya bapaya mpe batindami na Lisoló ya ekóló mpo ya boboto mpo ya koyéba makambo bakútani na yangó mpo ya bolendisi boboto na bituka biye mobúlú ekotaki.

Vatican News

Mobémbo na Meksike ya episkopo ya lokúmu Pietro Parolin esilaki mokolo ya mineí 6 ya sánzá ya mwambi. Episkopo ya lokúmu akómaki na ekóló eye y'Amerika ya káti na 4 ya sánzá ya mwambi eleki - sima ya mobémbo na ye na Guatemala - mpe asálaki misa na sanctuaire ya Ngondo ya Guadalupe. Mikolo miye ya súka, episkopo ya lokúmu ayambamaki na mokónzi ya Meksike, Claudia Sheinbaum, azalaki na Rosa Icela Rodríguez, ministre ya Meksike ya Ntéi. «Lisoló liná ya malámu etalaki makambo-makonzi ya litómba mpo ya bansó, mpenza bokolisi ya boboto mpe botomboli», tokoki kotánga na liyébisi. Nsango mosusu elobaki bokútáni káti ya Mgr Parolin mpe Roberto Velasco Álvarez, ministre ya Meksike ya Makambo ya bapaya, baye balobaki, na káti waná, «boyókani elámu epái na epái» mpe «mikakatano miye lisangá ya mokili ekokútana na yangó sik’oyo».

«Boboto ezali ntoki yokó»

Episkopo ya lokúmu akútanaki lokolá na batindami ya Lisoló ya ekóló mpo ya boboto mpo ya koyéba mbala mókó makambo maye bakútani na yangó ya bolendisi boboto na bituka bisika bobomi bato mpe mobúlú bikómi. Ezali ndéngé liyébísi lyokó ya média ya Lisangá ya baepiskopo ya Meksike, eye esemboli 'te bato ya bitéyelo ya likoló, basáli ya letá, bakambi ya biyamba, bamamá na bolukiluki bána na bangó babunga, bambulumbulu, bakeli ya misála, na lokolá batindami ya Bingúmba ya San Luis Potosi, ya Oaxaca, ya Querétaro, ya Puebla, ya Engúmba ya Mexico mpe ya etuka ya Mexico bazalaki waná.

Episkopo ya lokúmu alobaki 'te boboto ebándaka na bomitiyi na pási ya mosusu, na botáli litatoli ya mamá mókó na bolukiluki mwána na ye ya mobáli abunga na Engúmba ya Puebla. Alobaki lisusu na bansó 'te boboto ezali ntoki yokó, bomipesi bokó mokolo na mokolo, mpe alendisaki baye bazali na lisoló ya kolemba te na bokási ená, eye ekokóma liziba lyokó ya bopesi likanisi mpo ya bingúmba bisusu ya mokili bizuami na likambo liná ya mobúlú.

Matatoli mpe bolendisi

Liyébísi liná kaka elobi lisusu 'te, na eleko ya bokútáni, matatoli bikabolamaki na bosáleli káti ya bituluku ya mabótá na bolukiluki ya bandeko na bangó babunga mpe basáli ya Engúmba ya Puebla, na bolakisi 'te Lisoló ya ekóló mpo ya boboto ekomonana kozala mabelé mókó malámu mpo ya bolakisi ya politiki. Mosála mókó ya pulusi ya Ecatepec alobaki boni boni Baeklezia bikeseni basangisaki makási na bangó mpo ya kosála mpo ya boboto mpe botiyi loléngé lyokó ya pulusi ya penepene. Batindami ya Oaxaca balobaki 'te Lisoló ememaki libondi na basángó bazali na bisika ya mabé koleka.

Episkopo ya lokúmu Pietro Parolin ayókaki na bokébi binama ya ebongiseli mpe abimisaki bolendisi na ye mpo ya bomipesi ya mokolo na mokolo mpe bokobi eye bakolakisa na mosála ená ya pási. Alobaki 'te mosála waná ekopesa elikya na bingúmba mingi ya ekóló bikweyi na mobúlú mpe ekoki kozela lisálisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

09 sánzá ya mwambe 2026, 09:10