Bakristu mpe bato ya Confucius: botosi mpe bwanya mpo ya kolonga leló «mikakatano ya lombango»
Vatican News
Bosáleli bokó «ekokoba káti ya bakristu mpe bato ya Confucius» na nzelá ya bolukiluki, botangisi, lisoló mpe bamwangó ya sóló mpo ya kolonga «mikakatano ya lombango» ya mokili ya leló, lokolá bokabwani ya bato, bozali yo mókó, bokimi ekóló na makási, bozangi bokokani, bobébisi ya nzinganzinga, etumba mpe botiyi pembeni, na lokolá bomáti ya lombango ya intelligence artificielle (IA). Mikakatano biye «bikoki kolongama kaka na technologie to na nkita», kasi biye «bikosenga bwanya bokó ya malámu, bomoí ya molimo ya mozindo, liyóki lyokó ya lisangá mpe bomipesi ya sika lisusu mpo ya lokúmu ya moto mókó mókó mpe ya bolámu ya bansó». Ezali ya maloba ya ntina koleka ya nsakola ya lisangá etiamaki mabóko na baye bazalaki na liyangani ya yambo ya bokristu-boconfucius eye esálemaki na 4 mpe 5 ya sánzá ya mwambi, na Etéyelo ya likoló katoliko ya Sogang, na Séoul (Corée ya Sudi).
Lisoló ya yambo
Ezali bosololi ya yambo káti ya mimeseno mibalé ya biyamba, ebulisami na likambo-likonzi: Likoló ya Sika, Mabelé ya Sika mpe Boyókani Bonéne/Bomoko Bonéne: lisoló boconfucius-bokristu mpo ya botóngi lingómbá lyokó ya malongá. Esálemaki na Dicastère mpo ya Lisoló káti ya biyamba, elakisamaki na Séoul na episkopo ya lokúmu préfet George Koovakad mpe na secrétaire Mgr Indunil Janakaratne Kodithuwakku Kankanamalage, na bosáleli na Lisangá ya baepiskopo katoliko ya Corée, Akademi Confucius ya Corée mpe Etéyelo ya likoló Sogang.
Kolendisa botiyi motéma
Maloba ya Confucius, «Ezali esengo te ya kozala na baningá bawuti mosika?», mpe lilendisi ya bokristu: «Boyambana binó na binó, lokolá Kristu ayambaka binó mpo ya lokúmu ya Nzámbe». (Rom 15,7), bizali eloko ekomema mokánda ebimaki mokolo ya misáto 5 ya sánzá ya mwambi mpe etiamaki mabóko na bato ya bitéyelo ya likoló, bakónzi ya biyamba, batángisi mpe bato baye basálaka misála na mboka bawutaki Aziya, Poto mpe Amerika ya Nordi. Basangani na mboka-mokónzi ya Corée «na molimo mókó ya bolingi, ya boyambi mpe ya botosi epái na epái», bato bazalaki balobi bamoni, «na nzelá ya lisoló, likanisi ekabolami, losámbo, biléi mpe botáli bisika ya ntina ya bonkoko mpe ya eyamba», 'te «bokútáni ya sóló elongolaka bokeseni te, kasi ekokolisa bososoli, ekolendisa botiyi motéma mpe ekomisi bisó bansó bato ya bozui».
Mokili mókó ya bosémbo mpe ya motéma mawa
Bato ya Confucius mpe bakristu bandimi ya sóló «mbélá mókó ya lisangá ya kotónga mokili mókó ya bosémbo, ya botosi, ya motéma mawa, ya boboto mpe ya boyókani»: «Atáko ekangemi na mimeseno bikeseni, bosololi na bisó elakisaki mpósá mókó ya lisangá ya kolonga bokabwani mpe kokolisa lisangá lyokó esika wápi mókó mókó akokoka kobika na lokúmu mpe kobátela binó mókó mpe basusu».
Biloko bisimbi biyamba mpe makanisi bizali mingi mpe ndéngé na ndéngé, kasi bindimeli biye bikabolami bizali lisusu koleka, na kobánda na eye elingi koloba «bomengo ya moto ebándi na botéi ya bato ya bizaleli malámu, ya motéma mawa mpe bayébi kozua mikúmbá». «Bobongwami ya moto ye mókó, bomoí bokó ya malámu mpe bobáteli ya mosusu bizali biloko bisimbi mabótá, masangá mpe mangómbá ya malámu», tokoki kotánga na mokánda. «Lingómbá lyokó ya sémba mpe ya boboto ekotála bokambemi bokó ekangemi na bosémbo, bomikitisi, mosála mpe bomitungisi mpo ya bolámu ya bansó. Misála ya malámu bizali na ntina, kasi bikoki kosálela ya sóló lingómbá kaka sóki bikambemi na bwanya ya ezaleli elámu mpe bozui mokúmbá na letá».
Mikakatano ya mokili mpe etamboli ya technologie
Nsakola epesi lokolá eténi yokó na bobáteli ya bato bazali na bosenga ya lisálisi, bato ya mabótá bikoya mpe ndáko ya bisó bansó: «Tobengami ya kokolisa loléngé ya bomoí eye ekosálisa bosálisani, botosi ya ekela mpe botomboli mobimba», bilobami na batindami ya mimeseno ya biyamba mibalé. «Elikya ya mokili mókó ya malámu ekotindá bisó ya kosála elongo mpo ya kolonga bitumba mpe bambéba ya leló». Mimeseno mibalé bikolendisa bôngó «bompikiliki, molendé ya ezaleli elámu mpe botiyi motéma na likoki ya kotónga lobí lyokó ya bomoto koleka mpe ya boyókani koleka».
Na «eleko eye enéne ya Intelligence artificielle», tokoki kotánga lisusu, bomipesi eye elingi koloba «botomboli nionso ya technologie ekopesa makási na kolendisa lokúmu ya moto mpe makoki ya malámu», elobamaki lisusu.
Kokende libosó na bolingi mpe boyókani
Káti ya mabongisi bipesami na súka ya nsakola ya lisangá, okomona eye bokotisi bokó mpenza ya bilengé na boluki ya lisangá ya babokotisi ya malámu ya batechnologie bikomata; botomboli ya «mangómbá bisálemi na motéma ya mawa, bosémbo, boyókani mpe mokúmbá mokabolami»; mosála mókó ya «elongo» mpo ya kokolisa «bolámu ya bomoto mpe lisangá nionso ya bomoí». Mpósá ya baye bansó bazalaki na «bokútáni ena ya lisapo» ezali 'te, kobánda Liyangani liye ya yambo, tokoba «botomboli ya bolingi, ya bososoli ngambo na ngambo mpe boyókani». «Elongo, tomipesi ya kokoba kotónga mokili mókó esika wápi moto mókó mókó mpe lisangá lyokó lyokó ekoka kobika na lokúmu, boboto, elikya mpe boyókani».
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.