Synode: mokánda mókó mpo kosála elongo na Baeklezia ya bikóló mpo na 2027
Vatican News
Secrétariat monéne ya Synode ebimisi na 27 ya sánzá ya sambo mokánda na kombo «Kokanisa», zambi ya kokamba bobongisi Lisangá ya botáli ya Eklezia ya ekóló. Ezali na nkótá ebelé na site synod.va, mokánda yangó ekoluka kokamba Baeklezia ya bikóló - badioceze mpe baéparchie (badioceze ya Baeklezia katoliko ya monyele) - na bobongisi mpe bosáleli ya Lisangá ya botáli ebongisami na basánzá motóbá ya yambo ya 2027, eye ekolakisa súka ya etapi na nkombo «Kokanisa». «Kotála ezali ngalasisi yokó ya tekiniki te, kasi likambo lyokó okútani na yangó ya matondi mpe ya bosóló - elimboli episkopo ya lokúmu Grech, mokomi monéne ya Synode - kokanisa, ezali kondima eye Mokónzi akolisi na etamboli ya masangá mpe komitika kokambema na bitapi bikolanda. Ezali bongo ndé Eklezia ekokóma makási mingi na mbongwana».
«Kokanisa» elingi koloba nini?
Na Makomi, esemboli liyébísi eye ekokende elongo na mokánda, «kokanisa» elingi koloba kopesa mokongo na eye ya kála te, kasi kondima ekela ya Nzámbe na lisapo mpo ya kososola leló mpe komifúngwama mpo ya lobí. Na loléngé liná, Nkomá «bikobenga Eklezia ya ekóló yokó yokó ya kotánga lisusu na matondi mpe bosóló nzelá etambolami na eténi ya bosáleli ya Synode, mpo ya koyéba bambuma bikómeli mpe bitapi bisusu biye ebengami». Mokánda elandi nzelá ya mikánda ya ntina ya etamboli -Mokánda ya súka, Banzelá mpo eténi ya bosáleli (29 ya sánzá ya motóbá 2025) mpe Na nzelá ya Masangá 2027-2028 (20 ya sánzá ya mitáno 2026) - yangó ezali bokobi ya mosála mpo etapi ya ekóló.
Bato baye mokánda etindami mpo ya bangó
Bitindami libosó libosó na Baepiskopo, na Baéparque mpe na bikipi ya Synode biye bikotambwisa etamboli, Nkomá bibongisi ndakisa ya kosálela te, kasi bikopesa loléngé lyokó likoki ya kosála, na bopesi mituná, mibéko mpe mwá banzelá ya kobongisa na eleko yokó yokó ya ekóló. Ekoyókana kúna elembo ya Papá Léon XIV: synodalité «ezali loléngé lyokó ya bomoí ya elimo. Ebótami na bokútani, ekokola na boyóki mpe ekokomela na bososoli» (Lisikulu ya bosúkisi misála ya Consistoire ya mbalakaka, na 27 ya sánzá ya motóbá 2026).
Mokánda «Kokanisa»
Mokánda ená ezali na biténi mibalé bikangemi makási. Ya yambo ekokende elongo na bokomi lisoló ya makambo malekaki, mokánda esika nini Eklezia ya ekóló ekoloba nzelá elekami: mbuma ya «botángi lisusu» ya molimo na bitapi misáto -kosangisa likanisi, koyéba mpe koyóka «bilembo», kosimba loléngé ya bobongoli, elimbolami na mwinda ya mbongwana misáto ekomami na Mokánda ya súka: eye ya boyókani, eye ya etamboli ya Baeklezia mpe eye ya basinga. Eténi ya mibalé ekokamba bobongisi mpe boleki ya Lisangá ya botáli, ebengami na episkopo lokolá likambo lyokó ya bokútáni ya «molimo makási», esika wápi lisoló ekolobama ekowuta na loléngé na yangó ya súka mpe Likomi lyokó na Baeklezia bisusu.
Na nzelá ya Lisangá ya sánzá ya zómi 2028
Lisoló ekolobama mpe likomi bizali likabo eye Eklezia yokó yokó akomema na etamboli ya bansó ya Eklezia mobimba, na elimo ya «bokaboli makabo». Bindimami na episkopo, bikotindama na ekipi ya Synode ya ekóló to ya engúmba mpe bikabolami na Secrétariat monéne ya Synode yambo ya 30 ya sánzá ya motóbá 2027. Masangá ya botáli ya badioceze mpe baéparchie bakofúngola nzelá na etamboli yokó monéne koleka: bikolanda, na basánzá motóbá bilandi ya 2027, masangá ya masangá ya baepiskopo mpe misála ya likoló ya Baeklezia katoliko ya monyele; na basánzá misáto ya yambo ya 2028, masangá ya mikili; mpe na súka, na sánzá ya zómi 2028, lisangá ya Eklezia na Vatican, eye ekopesa elembo ya bosúkisi ya bosáleli ya Synode 2021-2028.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.