2025.02.04 Mgr Christophe Zakhia El-Kassis 2025.02.04 Mgr Christophe Zakhia El-Kassis 

Ntómá El-Kassis alubolami motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU

Ndáko ya média ya Ngwendé ya Sántu-Petelo abimisaki mokolo ya póso 25 ya sánzá ya sambo, bolubolami ya Mgr Christophe Zakhia El-Kassis lokolá motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU na New York. Moí-Libá mpe episkopo mokónzi ya Roselle, na Italie, azalaki kinó sik’oyo ntómá ya Papá na Émirats arabes unis mpe na Yémen, mpe motindámi ya Papá na esangá ya Arabie. Akitani na Mgr Gabriele Caccia, oyo azali waná úta 2019.

Vatican News

Papá Léon XIV alubolaki motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU na New York Christophe-Zakhia El-Kassis, kinó sik’oyo ntómá na ye na Émirats arabes unis mpe na Yémen mpe motindámi ya Papá na esangá ya Arabie. Na sánzá ya yambo 2023, Papá François alubolaki ye ntómá na Émirats arabes unis, na sima, na sánzá ya sambo 2024, lokolá na Yémen, mpe motindámi na esangá ya Arabie.

Abótama na Beyrouth, na Libá na 24 ya sánzá ya mwambi 1968, akulaka bonganga-Nzámbe na 21 ya sánzá ya mitáno 1994. Mgr Christophe Zakhia El-Kassis akotaki na mosála ya makambo ya bapaya ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na 19 ya sánzá ya motóbá 2000 mpe asálaki na bandáko ya ntómá na Indonésie, na Sudan, na Turquie mpe na Eténi ya boyókani na Bikóló ya Letá ya Vatican.

Na 24 ya sánzá ya zómi na mókó, Papá François alubolaki ye ntómá na Pakistan. Akulaki episkopo na episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá Pietro Parolin. Mibú mineí sima, na ebándeli ya sánzá ya yambo 2023, akokende na Émirats arabes unis, kaka lokolá ntómá ya Papá. Akokóma ntómá ya yambo ya kovanda na ndáko ya ntómá y'Abu Dhabi, efúngwamaki na sánzá ya mibalé 2022.

Moto ya diplomasi katoliko ya Libá, azali docteur na droit civil mpe na droit ya Eklezia. Motáli ya eleko insó ya Ngwendé ya Sántu-Petelo epái ya ONU akoloba malámu nkótá maye: arabe, lifalanse, italien, anglais, indonésien, espagnol mpe allemand.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya nsambo 2026, 13:34