Na etindá na Ukraine, episkopo ya lokúmu Zuppi akolikya na súka ya etumba
JR Bompolonga – Kinshasa
Eloko ya kobomba fúngola, mpo «nakolikya 'te kála te okotia áwa fúngola ya ndáko na yo, mpo ya kofúngola yangó mpe koyamba bandeko na binó». Na sima elili ya Salus Populi Romani, «mpo ya bakristu, elili ya Mamá na bisó, kasi mpo ya bansó, elili ya elikya». Na súka, elili yokó ya Papá oyo «atindi ngaí mpo ya koyébisa binó 'te akosambela mpo ya boboto mpe 'te etumba esila». Bizali biloko waná misáto ndé episkopo ya lokúmu Matteo Maria Zuppi amemelaki bakangemi mingi ya Zakhid-1, esika yokó ya bakangemi ezali na engúmba ya Lviv, na ndelo na Pologne. Mókó ya bisika ya bakangemi ya Ukraine epái wápi babundi ya kála ya limpinga ya Russie bakangema o eleko ya bitumba.
Etindá ya 2023
Mobémbo ya sika eye na Ukraine ya mokónzi ya Lisangá ya baepiskopo ya Italie mpe episkopo ya Bologne, ebándaki na 14 eye ya sánzá ya sambo. Ya yambo esálemaki na sánzá ya motóbá 2023, ntángo episkopo ya lokúmu Zuppi, atindámaka na Papá François, akendaka na Kiev mpo ya kokutana na mokónzi Volodymyr Zelensky mpe bato basusu ya politiki mpe ya eklezia, na bobeti ngonga ya mobémbo mókó molayi eye ememaki ye, na basánzá bilandaki, na Moscou, Washington mpe Pékin.
Etindá ya mosála ya boyókani káti na bikóló, kasi mingimingi ya lisálisi mpo ya bato, na mikáno ebelé, eye ya libosó ezalaka ya kolakisa -engebene na mpósá ya Papá François - bozali ya Eklezia o káti ya etumba eye lokolá elingi kosila te. Mpe na sima, kolendisa eye episkopo ya lokúmu Secrétaire ya Letá, Pietro Parolin, abengaki mbala ebelé ya «loléngé» ya koluka bozongi ya bána bébóo mpe bilengé biye Ukraine akofúnda bamemaka bangó na makási na Russie; bobimisi ya bakangemi.
O káti ya bokangemi
Mibú misáto sima ya etindá ená, episkopo ya lokúmu Zuppi azongi na Ukraine, mpo ya mikolo mineí. Akokende yambo na Kiev te - episkopo ya lokúmu akokóma na mpokwa na mboka-mokónzi - kasi na boloko eye ya kála ya Union soviétique ya Lviv. Akotambola elongo na bapulusi mpe limpinga ya Ukraine, mpe akokaki komona na miso na ye mókó ndéngé bomoí mpe bokangemi ya bakangemi. Pembeni na ye bizalaki ntómá ya Papá Visvaldas Kulbokas mpe ntómá ya Ukraine epái ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, Andrii Yurash. Yurash, na bosakoli bokómi ya episkopo ya lokúmu na baréseaux sociaux na ye, akomaki: «Ukraine ekolakisa mbala mosusu 'te ezali ekóló yókó ya ezaleli elámu, endima bosololi mpe bolukiluki banzelá bikomema na boboto bokó mpe ya sékó mpo ya ekóló...Ukraine ebongama kála mpo ya koyamba baye balingi ye mpe bakosálisa ye na eleko eye ya pási koleka ezuami na elembo ya mobúlú ya Russie».
Bokútáni na bakangemi
Na bisika nionso waná, episkopo Matteo akokaki kopésa mbote mpe kosimba lobóko ya bakangemi ndéngé na ndéngé: bansó mibáli, na moto nsuki elongolama mpe balati bilamba ya bulé, kasi bansó baí-Russie te. Zakhid-1 ekoyamba lokolá bilengé ya Biélorussie, ya Congo, ya Péru, ya Nigeria mpe ya Philippines. «Bikóló 53 bizali na esika ená», elimboli média Avvenire na mokánda mókó ya molayi.
Losámbo ya Papá
Mbala ebelé, episkopo ya lokúmu - asalisami na sángó yokó ya Ukraine mpo ya bobalusi - alobaki lisusu ntina ya mobémbo na ye: «Papá Léon XIV atindi biso áwa, ntómá mpe ngaí, mpo ya kopesa binó elikya mingi ya lobí. Akosambela mpo 'te etumba esila mpe 'te bokoka kozonga epái na binó». Episkopo ya lokúmu akabelaki bakangemi biloko.« Papá asengaki ngaí namema esika ya kobomba fúngola. Nakolikya 'te kála te okotia áwa fúngola ya ndáko na yo, mpo ya kofúngola yangó mpe koyamba bandeko na binó na mabóko...Ntángo ozali mosika ya epái na yo, okokanisa baye bakozela yo mpe tokoyóka malámu. Eye tolingi koyébisa binó leló, ezali ya kotála lobí na elikya, ya kondima 'te bokozonga epái na binó mpe 'te etumba ekosila. Tokosambela na motéma mobimba mpo 'te etumba esila noki».
Botika mabé epanzana te
«Nakopesa binó bampósá na ngaí nionso ya bolámu», ezongelaki episkopo ya lokúmu Zuppi mbala mingi. Na ndáko-Nzámbe ya moke, etapi ya súka ya botáli na ye, yambo ya koloba losámbo lyokó elongo. Asúkisaki: «Tosámbela mpo 'te bokoka komona kála te nzelá ya ndáko na binó, 'te nionso eye esúka mpe 'te bokoka kobándela bomoí bokó ya sika». «Kasi áwa lokolá, na káti, esengeli ezala ya sika», ebakisaki episkopo ya lokúmu na bolakisi na mosapi motéma na ye. «Tosengeli kobengana biloko nionso ya mabé. Bansó bomoni biloko mingi ya mabé, makambo mingi ya mabé, biye esengeli kosála te, kasi Nzámbe akopesa bisó kaka elikya...Totika mbala mókó te mabé ekolá áwa, na káti, mpe Nzámbe akosálisa bisó kaka ya kobengana yangó»
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.