Mgr Gallagher na bisika babombe bibwakamaki na Kiev: «Kokoba na losámbo mpo ya boboto»
JR Bompolonga – Kinshasa
Ezali na bisika ya pási biye bikokóma bisika ya molimo ya lisangá mpo ya bato. Boutcha, Irpin, Vorzel biyemami mpo ya sékó na miso mpe na motéma ya baí-Ukraine, mpe mosika koleka. Bakombo sik’oyo ya bilembo ya nsómo ya etumba ebándaka na boyingéli ya Russie na sánzá ya mibalé 2022, mpe eye ekopesa nzelá te ya komona súka to likambo lyokó ya sóló ya elikya. Kiev etondi na bilembo biye bikokundola mabé makási ya mobúlú mpe ya nkanda.
Mgr Paul Richard Gallagher akolekisa mokolo na ye ya misáto ya etindá na Ukraine, mokolo ya póso 18 ya sánzá ya sambo. Secrétaire ya makambo ya Boyókani na Bikóló mpe Masangá ya mokili ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, atindámaki ya kafu-kafu ya Papá mpo ya bosepeli mibú 35 ya bofúngoli ya misála ya Eklezia katoliko ya molúlú ya latin (bibongisami mokolo ya eyenga 19 na sanctuaire ya Ngomba Carmel ya Berdychiv).
Mgr Gallagher apesaki mokolo na ye na botáli bisika biye bitutamaki mibú bileki, mpe basánzá bileki, kasi esika wápi, atá nionso, okoyóka mpósá ya bato ya komeka kokende libosó. Na botóngi lisusu eye ya ntina: mibóko (fondations) ya ndáko-Nzámbe mókó to ndáko yokó bibébisamaki; molimo ebukani ya bato bazangi makoki mpe ya bána; boyókani ya bato mpe lingómbá esangani na boyambi.
Losámbo mpo ya boboto na ndáko-Nzámbe Sántu-Nicolas na Kiev
Na ntongo, episkopo akendeki na ndáko-Nzámbe Sántu-Nicolas, esika wápi ayambamaki na sangó-mokónzi, sángó Pavlo Vyshkovsky OMI, mpe na bandimi basanganaki waná. Ndáko-Nzámbe etutamaki na missile mókó ya Russie na sánzá ya zómi na mibalé 2024: na eleko, batálatála bilongwamaki mpe bitikalaki putulu, mpe káti ebébisamaki makási. Ndáko-Nzámbe ekobongisama sik’oyo mpe, basánzá bileki, na lisálisi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, bakambi ya politiki ya Ukraine batikeli bosáleli na lisangá katoliko ya molúlú ya latin.
Mgr Gallagher akotaki na paloise, esika akendaka na mobémbo na ye ya yambo na 2022, elongo na banzembo. Na lokóta ya Ukraine, episkopo, sangó-mokónzi mpe basángó basusu bazalaki waná balobi na lisangá losámbo lyokó ya kobelela boboto mpo ya Ukraine mpe súka ya etumba. «Mpo ya kozua yangó, elobaki Mgr Gallagher, esengeli na likambo lyokó ya ntina nakomona yangó kála káti na binó: bolámu ya bokobi. Ya sóló, bokoyika mpiko na bomoí na binó, mpo ya ekóló na binó mpe na losámbo ya ntángo insó mpo ya boboto. Mpe boyiki mpiko ezali lokolá bolámu eye ekolakisa bisó lokolá lisangá katoliko. Boyiki mpiko lokolá etónga ya misa, ya losámbo, mpe nakomona bambuma káti na binó. Nakomona lokolá botombwami mpe misála na bokambemi ya sangó-mokónzi na binó», ebakisaki ye.
Elili yokó ebiki na mobúlú
Ezali ntembe te 'te «makambo mpe bapási bikozanga te», ebakisaki episkopo, «kasi nakomona binó makási na boyambi mpe misála ya bolingo. Mpe ezali na elimo ená ndé napesi binó mbote na nkombo ya Tatá-Esántu na bisó Léon XIV. Mokolo mókó ekoleka te akosámbela mpo ya Ukraine mpe mpo ya binó, mibáli mpe bási ya boyambi. Nakobenga lokolá kosámbela mpo na ye, mpe nakolikya 'te mokolo mókó bokozua esengo ya koyamba ye áwa kaka», esúkisaki ye yambo ya bopesi bobenisi.
Biténi mibalé ya bafololo ya tournesol bipesamaki na Mgr Gallagher: «Bafololo biye bikoloba Ukraine mpe bawéi na ye ebelé», bilobaki baí-Ukraine misáto, na bopesi ye lokolá elili yokó ya Libótá Lisántu. Ndáko ya basusu káti na bangó ebetamaki, eleki bapóso mibalé, mókó ya bobeti makási esálemaki na Moscou mikolo mileki, mpe ebebaki, nzokándé elili eye ezalaki na káti etikali malámu. «Ezali mpo ya bisó elembo yokó ya elikya», bilobaki bato waná, yambo ya kotonda Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe ntómá ya Papá mpo na lisalisi mpe lisúngi ya mibú miye mileki.
Na súka ya botáli, na bolobi na bamédia ya Vatican, Don Pavlo abimisaki «esengo enéne na ye ya komona lisusu episkopo Gallagher mibú minei sima ya mobémbo na ye ya yambo na Kiev, mpe ya koyamba bolingo akomema mpo ya etónga na bisó».
Botáli ya etuka yokó ya mboka-mokónzi ebetamaki na sánzá ya mitáno
Etuluku ya batindami ekendeki sima na balabala Bratstva Tarasivtsiv, esika wápi, na 14 ya sánzá ya mitáno eleki, bobeti bokó ya Russie ebomaki bato 24, káti na bangó bána misáto, mpe ezokisaki na moke bato zómi. Ezali waná ndé akutanaki na bakónzi ya mboka, misála ya lombango mpe batindami ya HCR baye bakosála waná mpo ya komema lisálisi ya biloko mpe kosálisa baye batungisami na motó na babombe.
Mgr Gallagher ayókaki bandimbola ya makambo mpe atunaki epái ya binama ya lisálisi ya bacivil loléngé ya misála na bangó. «Ezali na ntina ya koyéba 'te, kaka úta sánzá ya motóbá ya mobú eye, bacivil 300 babomaki bangó mpe bato ebelé bazoki: ezali motángo ya likoló koleka úta 2022», elobaki mokambi ya esika waná ya HCR. Nzinganzinga ya nzete yokó enéne, na nsé, bapoupée, bapeluche, bajouet mpe bilili bitiamaki na bandeko mpe baningá ya bato ya makámá zambi ya kokoba bokanisi eye elekaki mpe baye bazali lisusu te leló.
Mbéba bizuami na etéyelo ya boyékoli mambi ma Nzámbe na bozindo ya dominicain
Na súka, etuluku ya batindami ekendeki na etéyelo ya boyékoli mambi ma Nzámbe na bozindo dominicain Sántu-Thomas-d'Aquin, esika wápi eyambamaki mokónzi monéne mpo ya Ukraine, sángó Jaroslaw Krawiec. Na sánzá ya mitáno elekaki, bamissile mpe badrone bibetaki bandáko bizali pembeni ya etéyelo, na bobuki bisika bébóo, esika ya zando mpe kompani ya Ukraine eye esálaka mindóki.
Biténi bibetaki makási ndáko epái wápi bandeko bavandaka, na bobébisi maninisa mpe bizibeli, mpe na bosáli mbéba ebelé na káti.
Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.