2026.06.17  Lomeya ya Santu Petelo, na mosala ya motéma monéné ya Papa 2026.06.17 Lomeya ya Santu Petelo, na mosala ya motéma monéné ya Papa  (@Vatican Media)

Lomeya ya Sántu-Petelo: bolingo ya boboto ya Papá ekómi na biténi minei ya mokili

Mokánda ya mobú na mobú eye eyambaka makabo mpo ya Papá wa Roma mpo kosálisa etindá na ye na mokili mpe kopesa mosolo na makanisi na ye ya bolingo ya motéma ebimaki mokolo ya mibalé eye. Mokánda ená elakisi 'te makabo yangó bimáti na milio ya baeuro 57,6 na 2025. Káti ya baye bazali na bolingo koleka, tokoki kotánga Amerika, Italie mpe Brésil. Bamwángo mingi bizuaki mosolo, lokolá botongi bandáko-Nzámbe na Ejipito to couvent yokó na Sri Lanka.

JR Bompolonga – Kinshasa

Lomeya ya Sántu-Petelo eyambaka makabo mpo ya Papá zambi ya kosúnga etindá na ye mpo ya Eklezia ya mokili mobimba mpe kopesa mosolo na bamwangó mingi mpo ya babolá koleka. Mokánda ya 2025 elakisi mosolo ekoti ya milio 57,6, nzokándé mosolo ebimi ekómi na milio 59,8. Bokeseni ewuti na bobuti mpe bokiti ya bobongoli mosolo ya bapaya. Na 2025, mosolo ya lisálisi ya motángo ya milio 54,5 epesamaki, na káti waná milio 41,2 mpo ya kosúnga misála bikosálema na Ngwendé ya Sántu-Petelo na mosála ya etindá ya bontómá ya Papá mpe milio 13,3 mpo ya kosálisa bamwangó ya lisálisi ya mbala mókó na babolá koleka.

Makabo bikowuta badioceze bizali 63,6 ya mosolo ekoti, bilandami na baye bapesi bangó mókó, bafondation mpe bitéyelo ya biyamba. Ebombelo ya mbongo Obolo ekosangisa makabo biwuti na bozui ya mabonza esálemaka na bapaloise ya mokili mobimba o eleko ya bokumisi basántu Petelo mpe Polo, na sima bipesami na Ngwendé ya Sántu-Petelo na badioceze na nzelá ya batindami ya Papá, longola kaka badioceze ya Italie baye batindaka yangó mbala mókó. Makabo masusu bikopesama na nzelá ya banki, na chèque to na nzelá ya site web; ezali lokolá na likabo eye etikami na mokánda ya libula.

Karte ya motéma malámu

Amerika (26,1% ya mosolo nionso ya makabo), Italie mpe Brésil bizali bikóló bipái wapi mosolo ekokota bikowuta, bilandami na ekóló Corée, Allemagne, Fránsa mpe Espagne. Lomeya ekosálisa Papá ya kopesa lisálisi lyokó ya biloko na bikóló bizali na bomáti mpe na bato batutami na bitumba, kasi lokolá kosálisa, na loléngé ebelé, bozali ya bopalinginyi Nsango-Ndamu na bapaloise, badioceze mpe bitéyelo ya biyamba biye bizali na ezaleli yokó ya bosenga. Ezali mpenza na bisika misáto ya mosála: bokolisi ya bozali ya bopalinginyi Nsango-Ndamu; bamwangó mpo ya bato mpe lisálisi na bozali ya bopalinginyi, mpo ya motángo mókó ya milio ya euro 13,3.

Lisálisi na Ukraine

Na lisálisi ya makabo maye, bamwangó 252 bizuaki mosolo, bisálemi na bikóló 74, mingi mpenza n'Afrika, n'Asia mpe na Poto, epái wápi mosolo mpo ya boyékoli epesamaki na bitéyelo ya likoló ya Papá na basángó, baí-likindo mpe basáli ya Nzámbe y’Afrika, y'Amerika ya latin mpe Asia. Lisálisi lyokó epesamaka mpo ya kosúnga bato ya Ukraine.

Bokolisi ya bozali ya bopalinginyi Nsango-Ndamu ekoleka na botongi bandáko-Nzámbe ya sika mpe bandáko bisusu, na likanisi ya komatisa mpe kolendisa bozali ená o ntéi ya ba Eklezia ya sika ya bikóló. Na Sri Lanka, couvent yokó etongamaki na Mannar; na Ejipito, ndáko-Nzámbe yokó ya paloise na Hagaza; mpe na Burkina Faso, esika ya mosála ya mobáteli na Kaya.

Bamwangó ya kosálisa ya bato, úta Gaza kinó Haïti

Na eye etáli bamwangó ya kosálisa bato, ezali manaka ya boyékoli mpe ya lisálisi, kasi lokolá lisálisi lyokó ya biloko mpo ya masangá ya bikóló. Na ndéngé waná, masálisi bipesamaki na Gaza, na lokolá botongi ya bakelasi mpo ya bána bási dalit na Ambikapur, na Inde, mpe etéyelo yokó na Bentiu, na Sudan ya Sudi. Káti ya bamwangó ya kosálisa ba Eklezia na bikóló ya etindá mpe na ezaleli ya bosenga bokó, tokoki kotánga, ndakisa, botongi ya ndáko mpo ya basángó na Pathein, na Birmanie, bobongisi ndáko ya sángó na ndáko-Nzámbe Sántu-Jérôme na Gonaïves, na Haïti, mpe eye ya Likindo Linéne Sántu-Augustin na Kabwe, na Zambie.

Lomeya ya Sántu-Petelo ekosálisa lokolá makambo ya mosála bikosálema na badicastère, misála ya Ngwendé ya Sántu-Petelo, bikabwani na makambo misáto: lisálisi na etindá ya bontómá ya Papá; misála mpe bokambi; bobáteli ya libula. Mosolo ekobima ya misála ya Ngwendé ya Sántu-Petelo na mosála ya etindá ya Papá wa Roma ekosálema na Lomeya.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

01 sánzá ya nsambo 2026, 13:15