Luka

2026.07.21 Lisangá linéne ya mbala ya 12 ya Lingómbá ya masangá ya baepiskopo y'Asia 2026.07.21 Lisangá linéne ya mbala ya 12 ya Lingómbá ya masangá ya baepiskopo y'Asia  

Etamboli na ndéngé ya Synode ya Eklezia n’Asia

Ntángo ya bozui na ye ya maloba libosó ya baye bazalaki na Lisangá linéne ya mbala ya 12 ya Lingómbá ya masangá ya baepiskopo y'Asia eye ekosálema na Jakarta, na Indonésie, episkopo ya lokúmu Mario Grech, secrétaire monéne ya Synode ya Baepiskopo, azongelaki mosála ya ntina eye Baeklezia ya bikóló bikosála na bokobi nzelá ya Synode.

Vatican News

«Ezali ya koloba Synode te, kasi koluka boni boni kobika na yangó na bomoí ya mokolo na mokolo ya Baeklezia na bisó». Ezali na maloba maye ndé episkopo ya lokúmu Mario Grech, secrétaire monéne ya Synode ya baepiskopo, alimbolaki botáli ya ntina ya eténi ya sima ya Synode etáli likambo ya Synode, ezali bongo mosála ya ntina mingi ya Baeklezia ya bikóló ya Lingómbá ya masangá ya baepiskopo y'Asia, eye ekosálema na Jakarta na Indonésie, kinó mokolo ya eyenga 26 ya sánzá ya sambo.

«Likambo ya ntina ya eténi ya bosáleli mpe etamboli ya Masangá, ezali libosó mpenza Eklezia ya ekóló», elobaki episkopo ya lokúmu Grech mokolo ya mitáno 24 ya sánzá ya sambo, na bolobi 'te liloba yangó ezalaki kaka ya kotála loléngé lisangá ekotámbola. Mosika ya kozala likambo lyokó ya pámba ya bokaboli ya bokambi ya Eklezia ya mokili mobimba, Eklezia ya ekóló ezali, engebene na episkopo ya lokúmu, «bolakisi bokó ya sóló ya Eklezia na esika yokó songolo, epái wápi Nsango-Ndamu esakolami, epái wápi basakraménto bikosálema mpe epái wápi bandimi basangani na bomoko na Kristu».

Makambo maye bato bakútanaka na yangó mpe matatoli.

Na lisikulu na ye na likanisi-likonzi «Mbélá ya mbongwana ya Synode mpe etindá ya kozala bagbagba mpe batóngi ya bagbagba n'Asia», secrétaire monéne ya Synode akundolaki 'te Eklezia katoliko ekoki kososolama te lokolá likambo emonanaka te na miso, ekabwani na masangá ya sóló esika wápi ezali kobika na káti. «Sóki Eklezia yokó ya ekóló ekopesa te, ekopima Eklezia ya mokili mobimba eloko mókó ya ntina», elimbolaki ye, mpo Eklezia yokó yokó ya ekóló ekomema elongo na ye «makabo, makambo maye bato bakútanaka na yangó mpe makoki ya ntina, na lokolá litatoli lyokó ekeseni na nzelá eye Nzámbe alingi kopesa bomengo na Nzóto nionso ya Kristu».

Na kokanisa etamboli na ndéngé ya Synode ebándaka na 2021, episkopo ya lokúmu Grech alobaki lisusu likambo mokambi eye ezali na nsé ya etamboli ená: boni boni kokóma Bato ya Nzámbe? Na kobánda esika eye ebótami liponi lyokó ya malámu: «Bozali ya bansó ekoki kosúka na eye ekomami te; esengelaki libosó mpenza kozala loléngé ya kosálela. Se bongo, Bato ya Nzámbe bakokaki kozala eloko mókó ya pámba te; basengelaki libosó mpenza kozala bato bazali kolanda nzelá ená». Na yangó, «koyóka Eklezia -mpe ezalaki na bozindo likanisi na bisó, mpo "Eklezia yokó ya Synode ezali Eklezia yokó eye ekoyóka" - elingi koloba, na sóló, koyóka Baeklezia».

Kolendisa lisangá mpe kosálisa etindá

Episkopo ya lokúmu Grech alobaki lisusu likambo ya kopesana mpe kozongiselana káti ya Baeklezia, babengani ya kokabola makambo maye bazali kokútana na yangó mpe makabo na bangó. Etamboli ya Synode, elimbolaki ye, ekoluka ya yambo kobimisa mikánda ya sika te, kasi kosálisa «botámboli ya makabo eye ekolendisa lisangá mpe ekosúnga etindá». Mókó ya makambo ya sika biwuti na etamboli ya Synode ezali eye abengaki restitutio, elingi koloba bokobi ya bozongi ya nsango: etapi yokó yokó ya etamboli ezóngelaki masangá ya bikóló zambi bakoka koyamba yangó mpe kokanisa lisusu. «etamboli ezalaki bôngó kaka ngambo yokó te, kasi ngambo mibalé -atá ezali kozónga esika ebándaki», elobaki episkopo ya lokúmu Grech.

Bosáleli ená ezalaki na ntina mpo ya kokokisa ndanga 'te etamboli ya Synode etikali ya kokangema makási na bomoí ya sóló ya masangá: «Ezali kaka na boyóki mpe na boyóki lisusu Baeklezia ya ekóló -elingi koloba Bato ya Nzámbe "na nsuni mpe na mokuwa", ezali na mibáli mpe bási babatisama - ndé ekoki kozala na bondimi ekoki koleka mosála ya motángo moke ya "bato ya nzebi", atá soki bazalaki binama ya Lisangá linéne ya Synode ya baepiskopo, ekoya kaka "konyata" ntina ya Eklezia».

Likambo eye ya ye mókó Eklezia y'Asia ekokútana na yangó

Na bolobi kaka na Eklezia y'Asia, episkopo ya lokúmu alobaki ntina ya likambo na ye akútanaka na yangó. Lisoló na biyamba misusu, bokeseni ya mimeseno ya bato, motindó mingimingi ya moke ya bakristu mpe penepene na babola bizali makambo ebelé maye Elimo-Sántu ekokoba kosála. «Likambo ya ntina ezali mingi eye Baeklezia y'Asia bakozua na Synode», esakolaki ye, kasi «likabo nini Elimo-Sántu akolinga kopesa na Eklezia mobimba na nzelá na bangó». Eténi ya leló -eye ya koyamba- ekozala ya ntina mingi mpo, na ndéngé mingi, ezali «ya ntina koleka», elobaki episkopo ya lokúmu Grech. Alobaki lisusu 'te Synode ekoka kosúka na mikánda te to na mikáno kaka ya motindo te, kasi esengeli kokóma likambo lyokó eye okútani na yangó o ntéi ya Baeklezia.

Mosála ya baepiskopo

Mosála ya baepiskopo etiami lokolá na mwinda na botáli ya Synode: «Likambo ya Synode ezali kaka ya bozali te, kasi lokolá libakú lyokó ya kokolisa boyébi ya mosála ya bokónzi epésama na episkopo ya dioceze». Episkopo, ekobaki ye, abengami koyóka Bato ya Nzámbe mpe kokende elongo na etamboli ya bososoli ya Eklezia na bobáteli lisangá.

«Bosáleli ya Synode ekobóta bambuma na ye mingi ntángo Eklezia yokó yokó ya ekóló ekomiyéba mbala mókó lokolá moto azui litómba mpe lokolá momemi ya likabo lyokó», esúkisaki secrétaire monéne ya Synode ya baepiskopo, na bolobi 'te, na lisálisi ya bokaboli elámu káti ya Baeklezia, «Eklezia ekokoba kokola na lisangá mpe na etindá».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

26 sánzá ya nsambo 2026, 13:41