Luka

2026.07.16 Botiyi maboko na "Nsakola ya Roma" na 16 ya sanza ya sambo 2026.07.16 Botiyi maboko na "Nsakola ya Roma" na 16 ya sanza ya sambo 

Botiyi mabóko na «Nsakola ya Roma», bomipesi etáli mindóki ya nucléaire mpe IA

Makambo motóbá bizali na mokánda etiamaki mabóko «Nsakola ya Roma» na balongi ya prix Nobel, bato bayébi koleka mpe bato ya nzebi bayébani mokili mobimba, bakambi ya biyamba mpe bakónzi ya Bikóló mpe ya bulamatari ya kála basanganaki mokolo ya 16 ya sánzá ya sambo, na Capitole: bosilisi bibundeli, bokolisi ya batechnologie ya sika, bomipesi ya kosála mpo ya «boboto bokó ezanga mondóki mpe ekolongola mondóki». Molúlú esilisaki likita eye esálemaki na Borgo Laudato si'.

JR Bompolonga – Kinshasa

«Mokili ekómi na eleko yokó ya makási ya lisapo na ye». Waná ebándi «Nsakola ya Roma mpo ya boboto ezanga mondóki mpe ekolongola mondóki na eleko ya Intelligence artificielle (IA), ya mindóki ya nucléaire mpe bibundeli biye bikokambama yangó mókó, baloléngé ya sika ya numérique mpe bandakisa bikobima ya bomátisi internet», etiamaki mabóko na ntongo ya mokolo ya minei 16 ya sánzá ya sambo, na Capitole, na Roma. Ezalaki na súka ya mikolo mibalé biye bilekaki na Borgo Laudato si' na nkombo: «Lisangá ya mokili mobimba ya balongi ya prix Nobel na Intelligence artificielle mpe etumba ya nucléaire».

«Mokakatano mókó naínu esálema te», ndéngé ezali eye tokobika sik’oyo, ekoki bisó kotánga na mokánda, eye ekotuna moto nionso mpo, sóki intelligence artificielle ekopesa mingimingi mabakú minéne, ekoki «koluka bobungisi bokó ebelé ya misála mpe ya kokolisa bowelani ya nkita káti ya bikóló ya makási ya nucléaire». Na botiyi makanisi káti ya mabóko ya motángo moke ya bikóló mpe ya bakompani minéne, IA ekoki komema makambo ebelé ya bokónzi. Na bokoli na lombango lyokó naínu esálema te, etindami ya «kobimisa bambongwana ya nkita, ya mampinga mpe ya bomoí ya bato ya monéne mingi». Nsakola elobi lokolá 'te bokimi mbango mpo ya bozui mindóki ya nucléaire, eye ekokola, ekokende elongo na «bokimi mbango na intelligence artificielle ya mabé lokolá». Yangó waná, na boyanoli na mbélá ya Papá Léon mpo ya «boboto ezanga mondóki mpe ekolongola mondóki», tolingi kobwakisa likanisi elingi koloba 'te bobáteli ezali likoló ya bobángi, ya bokónzi, ya bobangisi mpe ya bobébisi epái na epái.

Na litómba ya mokili

Makambo motóbá biye bizali na mokánda bikobenga ya «kokitisa bokimi mbango ekoya na bibundeli, mingi na likambo ya IA koleka eye ya nucléaire, yambo 'te yangó ebongisa elongi ya ekeke ekoya». Mbélá mókó ebwakami na basáli makambo ya intelligence artificielle mpo 'te basála na litómba ya mokili, «na botosi mobéko ya mokili mpe makoki ya moto». Na yangó mbélá ebwakamaki na masangá mpe babulamatari mpo 'te bakengela banzelá biye bisálaka yangó mókó o ntéi ya mitindo ya intelligence artificielle.

Boyókani bokó ya mokili na mitindo ya bobáteli ya IA

«Mokáno ya súka ya kosálela ebundeli yokó ya nucléaire  - tokoki kotánga na Nsakola - ekoki atá moke te epesama na motindo mókó esálaka yangó mókó». Tokosenga bôngó bondimi ya «boyókani bokó ya mokili na bopekisi bokotisi ezanga mokúmbá ya intelligence artificielle na mitindo ya bokambi, ya bobáteli mpe bobwaki ya bibundeli ya nucléaire, na bolaki 'te bobáteli ya bomoto ya sóló mpe ya ntina ezalaka kaka». Ezali mingi ya kopekisa bosáleli nionso ya mabé ya IA na misála ya informatique mpe mobúlú libosó ya bandáko ya misála ya nucléaire. «Tokolendisa bokoli mpe bosáleli na mokúmbá ya intelligence artificielle - tokoki kotánga - mpo ya komatisa bolámu ya moto, ya kotambwisa na lombango babomáti ya nzebi mpe ya bokólóngóno, ya kobátela nzinganzinga, ya kolendisa bokási ya koyika mpiko ya bato mpe kotombola boboto, bokolisi ya sékó mpe bolámu ya bansó».

Kokela bolámu bokó ya bansó ya numérique

Makambo ya súka bitáli ntina ya «koyéba banzelá ya sika ya misála epái ya bokambi bokó malámu ya mokili ya intelligence artificielle mpe ya kosálisa, lobí, bosáleli ya makanisi ya bokambi ya mokili na likambo liná». Baye batiaki mabóko na mokánda bakosálisa makanisi biwuti na «Magnifica humanitas» ya Papá Léon XIV mpe bapesi lisúngi na bangó na etónga ya bato ya nzebi ya mokili eye ezali na bonsómi epái ya ONU na likambo ya intelligence artificielle. Bangó kaka babwaki mbélá mpo ya bokeli «bolámu bokó ya bansó ya numérique» eye ekosúnga bosangisi mpe bokaboli ya makambo bisengeli mpo ya kokolisa boyébi mpe kosálisa na bikela ya makási likambo ya bibundeli ya nucléaire mpe intelligence artificielle. Ezali na mokili bobángi ebelé bisangana mpe mabé na bangó bikómi kilo mingimingi na baye bazali kokota te to kobátela batechnologie biye bikobimisa yangó.

Bolongoli nucléaire

Na súka ya nsakola, esengami na lombango bofúngoli ya masoló bikoluka kokóma na «bosilisi eye ekoki komekama mpe ekozongaka lisusu te ya bibundeli ya nucléaire». Mbélá ebwakami na Bikóló mpo 'te batika bokimi mbango na mindóki, na bolekisi mpenza masoló mpe botosi ya mikúmbá biye bindimamaki na boyókani. «Bikóló bizali na bibundeli ya nucléaire  - tokoki kotánga na nsakola - basengeli kokolisa bapolitiki mpe matéya biye bikokitisa malémbe malémbe mosála ya mindóki waná, bikolendisa bopikiliki ya likanisi mpe bikokitisa likámá ya bosáleli ya yambo mpe etumba yokó na makambo ya mabé». «Ezali libiki na bisó mpe ya baye bakokóma sima ndé bizali kolukama», baye batiaki mabóko bakomi.

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye.

20 sánzá ya nsambo 2026, 11:32