Luka

2026.07.18 ASIF mpe Deutsche Bundesbank batíé mabóko na mokánda ya boyókani ya tekiniki. 2026.07.18 ASIF mpe Deutsche Bundesbank batíé mabóko na mokánda ya boyókani ya tekiniki. 

ASIF mpe Deutsche Bundesbank batíé mabóko na mokánda ya boyókani ya tekiniki

Boyókani bokó etáli bosáleli ya tekiniki káti ya ndáko ya ebombelo ya mosolo y'Allemagne mpe ASIF (Autorité de surveillance et d’information financières) etiamaki mabóko na 17 ya sánzá ya sambo, na Ndáko San Carlo. Bosáleli bokó ebongisami mpenza na bomipesi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpo ya kolendisa ebombelo na ye ya mosolo, engebene na mibéko bindimami sik’oyo na mokili mobimba.

Vatican News

Na Ndáko San Carlo, mokolo ya mitáno 17 ya sánzá ya sambo, ASIF mpe Deutsche Bundesbank batiaki mabóko na mokánda mókó etáli boyókani ya tekiniki káti na misála mibalé. Mpo ya Deutsche Bundesbank, mokánda ezuaki mokoloto ya Burkhard Balz, enama ya bokambi, mpe mpo ya ASIF na mokónzi na yangó, Federico Antellini Russo.

Bondimami bokó elendisami na lisangá ya mosolo ya mokili

Ezali bolendisami bokó ya sika ya boyókani káti ya ASIF mpo ya likambo ya mbongo ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpe Letá ya Vatican mpe Ebombelo mosolo y'Allemagne, boyókani ekoli na mibú ebelé mpe bilendisami makási basánzá bileki. Bosáleli bokó ebongisami mpenza na bomipesi ya Ngwendé ya Sántu-Petelo mpo ya kolendisa ebombelo na ye ya mosolo, engebene na mibéko bindimami mokili mobimba. Yangó ekosálisa, likoló ya polélé, mokúmbá mpe boyébi mosála, ya kozua bondimami bokó kaka makási o ntéi ya lisangá ya mosolo ya mokili mobimba.

Bokaboli ya banzebi mpe misála malámu

Boyókani ekoluka kolendisa mpe kokolisa makási ya bansó mpe bosáleli epái na epái na likambo ya bokengeli, mpenza na nzelá ya boyekolisi mpe bokaboli banzebi mpe misála malámu, na litómba ya bansó ya kosálisa na polélé mpe bokoki ya makambo ya mosolo na mokili. Lokolá elobaki Burkhard Balz na lisikulu na ye ya ebándeli, «na botiyi mabóko na boyókani eye, tolobi bomipesi na bisó bansó epái ya mibéko ya bosémbo, ya polélé mpe ya boyókani na mokili. Boyókani ená ekopesa mwángo mókó ya kolanda mpe lisálisi lyokó epái na epái, mpe ekolakisa mpósá na bisó bansó ya kosálela bolámu ya bansó likoló ya loléngé lyokó ya mosolo ya sémba mpe ya bosémbo».

Bato batiyaki maboko na mokanda ya boyokani
Bato batiyaki maboko na mokanda ya boyokani

Kotála lobí na bondimi ya makási

Na ngambo na ye, mokónzi y'ASIF alobaki na lisikulu na ye ya ebándeli 'te «botiyi mabóko na boyókani eye esalemi na mobú esika wápi tokosepela mibú 15 ya bokeli ya Bokónzi, mpe na mwá bapóso ya bokómi na nguyá ya mibéko ya sika y'ASIF, bibimakisami na Tatá-Esántu Papá Léon XIV. Yangó ekopesa bisó libakú ya koyéba nzelá totamboli, kasi mingimingi ya kotála lobí na bondimi makási. Nakolikya 'te bosáleli káti na misála na bisó mibalé ekokoba kolendisama mpe ekokóma lisusu mokuse koleka».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

19 sánzá ya nsambo 2026, 13:52