Vatican Vatican  (ANSA)

Vatican: IA ekoki kokitisa tourisme na likambo lyokó ya pámba te

Na llilob lyokó mpo ya Mokolo ya mbala ya 47 ya mokili ya tourisme, episkopo Rino Fisichella, pro-préfet ya dicastère mpo ya Bopalinginyi Nsango-Ndamu, akébisi na likámá ya bolalisi likambo ya mobémbo na nzelá ya internet, «na bopekisi bisó ya komona soloka ya babokútani ya bato na bato, mingimingi babomoni ya ntina koleka». Akébisi lokolá na botiyi pembeni ya internet mpe bokambi ya bokongoli makambo na ezaleli ya bato ya mobémbo.

JR Bompolonga - Kinshasa

Ntángo mobémbo etiki esika na «bokimi ya sóló» epesami na technologie, ezali koleka likambo lyokó ya pámba eye ekobunga: boluki ya malámu koleka ekoboma bokamwi, «loléngé ya sóló ya boyébi»; koluka botálisi ebongama na bosáleli ekolembisa «babokútani ya babonkoko mpe ya bato na bato». Kozongisa sima tourisme na intelligence artificielle (IA) ekobimisa lokolá mituná ya botiyi pembeni ya internet, na bobángi ya kotia mosika koleka masangá maye bakobika na babotáli ya tourisme lokolá «liziba ya ntina ya mosolo», mpe bokongoli ya mingi ya makambo ya ezaleli ya bato ya mobémbo, eye ekoki kokóma «esálelo yokó ya bokengeli elongobami te na bonsómi mpe lokúmu ya bato». Bizali waná mwá makambo bilobamaki na episkopo Rino Fisichella, pro-préfet ya dicastère mpo ya Bopalinginyi Nsango-Ndamu, na liloba lyokó ebimaki na 11 ya sánzá ya motóbá o eleko ya Mokola ya mbala ya 47 ya mokili etáli tourisme, eye ekosepelama na 27 ya sánzá ya libwa.

IA ezali na káti te (neutre)

Liyóki mpe motúya ya «ndéngé ená ya kokamwisa ya bokútáni káti ya bato» bilongwi te, lokolá makambo misusu ebelé, na makámá mpe na bokási ya IA. Lokolá elobi Papá Léon XIV na Encyclique na ye ya sika Magnifica humanitas: «Ezali na káti te, mpo ezozua elongi ya baye bakanisi yangó».

IA ekoki kokóma moninga ya ntina mpo ya tourisme yokó ya libela mpe ya bansó, ekobaki Fisichella, kaka sóki «etikali esálelo yokó na mosála ya moto mpe ebongwami te na loléngé lyokó ya bokengeli, ya bokabwani to ya botiyi pembeni».

Mabakú mpo ya bato bazali na elémo

Na matómba bilekisamaki na episkopo etáli bosáleli IA na tourisme: bozui na pété nsango, boyébi yo mókó, bokomisi banzelá malámu koleka mpe bokitisi ya bobébisi nzinganzinga.

Na lisálisi ya batechnologie ya sika, bato bazali na elémo bakoki kokóma bisika mpe boyébi biye bakokaki te kála. Masangá ya bikóló bikotombwama bikoki kopesa motúya na libulá likoló ya mangómbá ya internet mpe komatisa koleka eye ya libosó. Lisusu, bobébisi ya nzinganzinga ya bato ebelé ya mobémbo ekoki kolandama mpe kokitisama, na bosálisi waná bobáteli ya Bokeli.

Botáli ekoki kokitana te

Kasi technologie ekoki «kokitana bomoni ya esika yokó eyébani te, bopesani mbote káti na bato bayébani te, bokamwi eyókanaka libosó ya eloko ekelami na moí-ntoki to esika yokó esántu». Ya kobakisa, «mangómbá ya internet mpe baloléngé ya IA bikoki kokanisama mpe kosálisama mpo ya kosálisa babokútani ya sóló káti ya bato mpe baí-mboka, te mpo ya kokitisa na likambo lyokó ya pámba to na bosáleli ya bilili».

Makámá ya tourisme yokó ekonzami na internet

Úta matómba kinó makámá: Mgr Fisichella atelemeli «bozangi ya lomeko ya bomoto ya tourisme, esika wápi bato ya mobémbo bazuami lokolá biloko ya pámba, mobémbo lokolá eloko yokó ya kokolisa litómba mpe babokútani ya babonkoko lokolá biloko ya kolakisa ya kotála». Waná, ekomi episkopo, «babomoni ya ntina koleka» bikitisami. Lisusu, bato baye bakozua batechnologie te batiami pembeni mpe bomoí ya káti ya bato ya mobémbo ekómi kobunga. Na bosúkisi, tourisme ekoki kozala «etéyelo yokó ya bondeko» kaka ntángo ekoleka na loléngé lyokó ya soló, lokolá likambo lyokó «eye ekofúngola motéma na molimo, eye ekotéya bomengo ya bokeseni mpe ya bosálisani».

Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

12 sánzá ya motóbá 2026, 15:37