Luka

2025.06.26 Bokutani ya Papa na binama na Conseil ordinaire ya Secrétariat Monéne ya Synode 2025.06.26 Bokutani ya Papa na binama na Conseil ordinaire ya Secrétariat Monéne ya Synode   (@Vatican Media)

Synode, mikolo misáto ya misála na bakambi ya masangá ya mikili

Bokútáni ekobánda mokolo ya mibalé eye 23 ya sánzá ya motóbá mpe ekosila mokolo ya minei 25 na lisoló káti ya Papá Léon XIV mpe baye bakozala na bokútani na Secrétariat Monéne ya Synode. Mikolo yangó misáto ya mosála bipesami na botáli maye ma ntina matámboli na bosáleli Mokánda ya súka ya Likita Linéne ya mbala ya zómi na motóbá ya Synode ya baepiskopo, zambi ya kolendisa bokaboli ya mimekano ya sik’oyo mpe koyéba makambo maye matámbolaka ndéngé mókó káti ya nionso.

Vatican News

Na botáli Masangá ya baeklezia ya 2027-2028, sima Lisangá Linéne ya mbala ya zómi na motóbá ya sánzá ya zómi 2024, Secrétariat Monéne ya Synode  -lokolá elobi liyébísi lyokó- ezuaki mokáno ya kosangisa na Roma, kobánda mokolo ya mibalé eye ya 23 ya sánzá ya motóbá kinó 25, bakambi ya bibongiseli ya mikili (continents) (CELAM, SECAM, FABC, CCEE, FCBCO, etc.), bikolakisa Amerika ya latin, Afrika, Asia, Poto, Océanie, Moyen-Orient mpe Amerika ya Nordi, elongo na bakambi ya bikipi ya Synode ya mikili.

Bobimisami (publication) ya kála te «Epái ya Masangá 2027-2028, Bitapi, mibéko mpe bisáleli mpo ya bobongisi» ekozala o káti ya misála. Papá Léon XIV akokútana na baye bakozala sima ya nzanga ya mokolo ya minei 25 ya sánzá ya motóbá mpe akosolola na bangó na Secrétariat Monéne ya Synode.

Bokaboli ya mimekano mpe mosála

Mikolo miye misáto ya mosála bipesami na botáli maye ma ntina matamboli na bosáleli Mokánda ya súka ya Likita Linéne ya mbala ya zómi na motóbá ya Synode ya baepiskopo, zambi ya kolendisa bokaboli ya mimekano ya sik’oyo mpe koyéba makambo maye matambolaka ndéngé mókó káti ya nionso mpe lokolá makambo bikoluka bokolisi ya lisangá.

Ndambo ya mosála, bikosálema na lisangá mpe na bituluku ya mosála, ekopesama na bokambemi ya Baeklezia ya bikoló mpe bokangisi ya bituluku ya Baeklezia, na bopesi bokébi bokó ya ntina na mosála ya boyébisi.

Na mokolo ya súka, baye bakozala bakokabola na Masangá ya mikili -etapi ya botámboli bokó bonéne koleka ya masangá ya baeklezia eye ekokutana Lisangá ya sánzá ya zómi 2028- mpenza na mibéko ya bozali mpe likambo ya bolakisi, na biyano bizelami mpe na mosála ya Secrétariat monéne.

 Matondo mingi na ndéngé otángi lisoló liye

23 sánzá ya motóbá 2026, 12:41